Ester 8:8 - Mokanda na Bomoi8 Sik’oyo, koma mobeko mosusu na tina na Bayuda, na kombo ya mokonzi, ndenge okomona malamu mpe beta yango kashe ya mokonzi ; pamba te mokanda oyo ekomami na kombo ya mokonzi mpe babeti yango kashe na ye ekoki kobongwana te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yango wana, soki esepelisi mokonzi, tika ete mokonzi azwa mobeko oyo ekoki kobongwana te ; mpe tika ete mobeko yango ekomama kati na mibeko ya Persi mpe ya Medi : Vasti akoki lisusu te kotelema liboso ya mokonzi Kizerisesi ; mokonzi akopesa lokumu na ye ya mwasi ya mokonzi epai ya mwasi mosusu oyo azali malamu koleka ye.
Boye, na mokolo ya zomi na misato ya sanza ya liboso, babengisaki bakomi mikanda ya mokonzi ; mpe na mitindo ya Amani, bakomaki mitindo nyonso ya Amani epai ya bakalaka ya lokumu ya mokonzi, epai ya bayangeli ya etuka moko na moko mpe epai ya bakalaka ya ekolo moko na moko, kolanda lolenge ya kokoma ya etuka moko na moko mpe lokota ya ekolo moko na moko. Bakomaki yango na kombo ya mokonzi Kizerisesi mpe babetaki yango kashe ya mokonzi.
Ester alobaki : — Soki esepelisi mokonzi, soki nazwi ngolu na miso ya mokonzi, soki akanisi ete ezali sembo mpo na ye kosala mpe soki asepeli na ngai, tika ete mobeko ekomama mpo na kokweyisa mikano ya Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya Agagi, oyo ebongisamaki mpe ekomamaki mpo na koboma Bayuda kati na bituka nyonso ya mokonzi.
Bakalaka ya lokumu, bakalaka oyo babatelaka biloko ya mokonzi, bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka, bapesi toli mpe bayangeli, bango nyonso bandimaki ete mokonzi azwa mokano moko mpe abetela yango sete : « Na mikolo tuku misato oyo ezali koya, moto nyonso asengeli kosambela kaka mokonzi ; moto oyo akomeka kosambela nzambe to moto mosusu, basengeli kobwaka ye kati na libulu ya bankosi. »