Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 8:2 - Mokanda na Bomoi

2 Mokonzi alongolaki lopete na ye oyo abotolaki epai ya Amani mpe apesaki yango epai ya Maridoshe. Bongo Ester atiaki Maridoshe mokambi ya biloko ya Amani.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 8:2
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Faraon alongolaki lopete na ye na mosapi na ye mpe atiaki yango na mosapi ya Jozefi. Alatisaki ye bilamba ya lino ya kitoko mpe atiaki ye singa ya wolo na kingo.


Bongo misala nyonso ya bokonzi mpe ya nguya na ye, elongo na makambo nyonso ya lokumu ya Maridoshe oyo mokonzi atombolaki, ekomamaki kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Medi mpe ya Persi.


Mokonzi alongolaki lopete na ye na mosapi na ye mpe apesaki yango epai ya Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya mboka Agagi, monguna ya Bayuda.


Ester alobaki lisusu na mokonzi ; amibwakaki na makolo na ye mpe abondelaki ye na kolela ete asukisa mikano mabe ya Amani, moto ya Agagi, mpe mabongisi na ye ya koboma Bayuda.


Zala na elikya kati na Yawe mpe batela nzela na Ye ; akonetola Yo mpo ete ozwa mboka lokola libula na yo, mpe okomona tango bato mabe bakolimwa.


Sima, mokonzi atombolaki Daniele na lokumu oyo eleki likolo mpe apesaki ye bakado mpe bozwi ebele ; akomisaki ye moyangeli ya etuka mobimba ya Babiloni mpe mokambi ya bato na yango nyonso ya bwanya.


Kasi tata alobaki na basali na ye : « Bomema na lombangu nzambala oyo eleki kitoko mpe bolatisa ye yango ; bolatisa ye lopete, na mosapi, mpe basandale, na makolo na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ