Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 8:16 - Mokanda na Bomoi

16 Ezalaki tango ya kosepela mpe ya esengo, tango ya feti mpe ya lokumu mpo na Bayuda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 8:16
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

— Kende kosangisa Bayuda nyonso oyo bazali na engumba Size. Bokila bilei mikolo misato mpo na ngai ; butu mpe moyi, bolia mpe bomela eloko te. Ngai mpe nakokila bilei elongo na basi bawumbu na ngai ndenge moko na bino. Sima na yango kaka nde nakokende epai ya mokonzi atako nakobuka mobeko. Soki mpe nakokufa, nakufa kaka !


Na mokolo ya zomi na misato ya sanza ya Adari, babomaki bato nkoto tuku sambo na mitano kati na banguna na bango, kasi batikalaki kozwa bomengo ya bitumba te. Bongo na mokolo ya zomi na minei, bapemaki mpe bakomisaki yango mokolo ya feti mpe ya esengo.


Pole engengaka kati na molili mpo na bato ya alima, mpo na moto oyo alimbisaka baninga, ayokelaka bato mawa mpe azali sembo.


Yawe azali Nzambe, mpe angengisaki biso. Bokota na molongo, bomema mandalala na maboko mpe bokende kino na maseke ya etumbelo.


Yo nde obikisaka banyokolami, okitisaka bato na lofundu.


Obongoli kolela na ngai, okomisi yango mabina ; olongoli mokumba na ngai mpe olatisi ngai esengo,


Moyi elonami mpo na moto ya sembo, mpe esengo, mpo na bato oyo bazali na mitema alima.


Tango bato ya sembo bapambolamaka, engumba esepelaka ; mpe tango moto mabe akufaka, bato bagangaka na esengo.


Tango bato ya sembo balongaka, ezalaka esengo mingi ; kasi tango bato mabe bazwaka bokonzi, bato bamibombaka.


Boye, bakangolami na Yawe bakozonga, bakokota na Siona na nzembo ya elonga, mpe esengo ya suka te ekozala na likolo ya mito na bango lokola mitole. Esengo mpe kosepela ekopesamela bango, nzokande mawa mpe kolela ekosila.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ