Ester 8:11 - Mokanda na Bomoi11 Na nzela ya mobeko yango, mokonzi apesaki Bayuda ya bingumba nyonso ndingisa ya kosangana mpo na komibatela, kobundisa, koboma mpe kobebisa mampinga ya ekolo nyonso to etuka nyonso oyo ekoluka kobundisa bango, basi na bango to bana na bango ; mpe ndingisa ya kobotola na makasi bozwi ya banguna na bango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bakozala na posa te ya kosangisa bakoni kati na bilanga to kokata banzete kati na bazamba, pamba te bakopelisa moto yango nde na bibundeli ; bakozwa lokola bomengo ya bitumba bato oyo bazwaki bango lokola bomengo ya bitumba, mpe bakobotola biloko ya bato oyo babotolaki bango biloko, elobi Nkolo Yawe.