Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 8:10 - Mokanda na Bomoi

10 Maridoshe akomaki mikanda na kombo ya mokonzi Kizerisesi, abetaki yango kashe ya mokonzi mpe atindaki yango na nzela ya bantoma oyo batambolaka na bampunda ya mbangu, oyo etiama mpo na misala ya mokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 8:10
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, Jezabeli akomaki mikanda na kombo ya Akabi, atiaki yango kashe ya mokonzi mpe atindaki yango epai ya bampaka mpe bankumu oyo bazalaki kovanda engumba moko na Naboti.


Na etinda ya mokonzi, bamemi sango bakendeki kati na Isalaele mobimba mpe Yuda, na mikanda oyo ewutaki epai ya mokonzi mpe bakalaka na ye. Tala makambo oyo ezalaki kati na mikanda yango : « Bana ya Isalaele, bozongela Yawe, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Isalaele, mpo ete Ye mpe azongela bino oyo bobiki na maboko ya bakonzi ya mboka Asiri !


Sik’oyo, koma mobeko mosusu na tina na Bayuda, na kombo ya mokonzi, ndenge okomona malamu mpe beta yango kashe ya mokonzi ; pamba te mokanda oyo ekomami na kombo ya mokonzi mpe babeti yango kashe na ye ekoki kobongwana te.


Mikolo ya bomoi na ngai ezali kokende mbangu koleka mopoti mbangu, ezali kokende mbangu penza, kasi etikali komona esengo te.


Lokola liloba ya mokonzi ezalaka na bokonzi, nani akoki koloba na ye : « Ozali kosala nini ? »


Bashamo ebele ekotondisa mokili na yo, bana ya shamo ya mokili ya Madiani mpe ya Efa. Yango nyonso ekowuta na Saba, ekomema wolo mpe malasi ya ansa, mpe ekotatola masanzoli na Yawe.


Bakomema bandeko na bino nyonso wuta na bikolo nyonso, lokola likabo epai na Yawe, na ngomba na Ngai ya bule, na Yelusalemi, na likolo ya bampunda, ya bashar mpe ya bashareti oyo ekangama, ya mikongo ya bamile mpe ya bashamo, » elobi Yawe. « Bakomema bango ndenge bana ya Isalaele bamemaka makabo na bango ya bambuma, kati na basani ya bule, na Tempelo ya Yawe.


« Ndenge nini okoki penza koloba : ‹ Namikomisi na ngai mbindo te, nazali kolanda banzambe ya Bala te ? › Tala nanu ndenge ozalaki kotambola kati na lubwaku mpe kanisa malamu makambo oyo ozalaki kosala. Okomaki lokola shamo ya mwasi oyo eyengaka-yengaka bisika nyonso ;


elongo na yo, napanzaki mpunda mpe motambolisi na yango ; elongo na yo, napanzaki shar mpe motambolisi na yango ;


Ngai, Nabukodonozori, nazalaki na kimia mpe nazalaki kosepela na bomengo kati na ndako na ngai.


Bakalaka ya lokumu, bakalaka oyo babatelaka biloko ya mokonzi, bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka, bapesi toli mpe bayangeli, bango nyonso bandimaki ete mokonzi azwa mokano moko mpe abetela yango sete : « Na mikolo tuku misato oyo ezali koya, moto nyonso asengeli kosambela kaka mokonzi ; moto oyo akomeka kosambela nzambe to moto mosusu, basengeli kobwaka ye kati na libulu ya bankosi. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ