Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 7:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bongo Aribona, moko kati na basoda oyo baboma bango mokongo, alobaki liboso ya mokonzi : — Ezali na nzete moko oyo Amani atelemisaki mpo na Maridoshe, oyo alobaki makambo mpo na bolamu ya mokonzi ! Ezali kati na lopango ya Amani mpe ezali na bametele tuku mibale na mitano na bosanda ! Mokonzi apesaki mitindo : — Bodiembika ye moko kuna !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 7:9
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jewu atombolaki miso na ngambo ya lininisa mpe agangaki : — Nani kati na bino azali na ngambo na ngai, nani ? Bakengeli mibale to misato ya mokonzi, oyo baboma bango mokongo, batalaki Jewu wuta na lininisa.


Na mokolo ya sambo, lokola mokonzi Kizerisesi alangwaki vino, atindaki basoda na ye sambo oyo baboma bango mokongo mpe bazalaki kosalela ye : Mewumani, Bizita, Aribona, Bigita, Abagita, Zetari mpe Karikasi.


Zereshi, mwasi na ye, mpe baninga na ye nyonso balobaki na ye : — Telemisa nzete ya bametele pene tuku mibale na mitano na bosanda ; mpe lobi na tongo, okosenga na mokonzi ete badiembika Maridoshe na nzete yango. Bongo okokende na esengo na feti elongo na mokonzi. Likanisi oyo esepelisaki Amani, mpe atelemisaki nzete.


Wana bazalaki nanu kosolola na ye, basoda ya mokonzi, oyo baboma bango mokongo, bayaki mpe bamemaki Amani na lombangu na feti oyo Ester abongisaki.


Emonanaki ete bakomaki boye kati na yango : Maridoshe afundaki Bigitani mpe Tereshi, basoda mibale oyo baboma bango mokongo mpe bazalaki kokengela ekuke ya mokonzi, oyo basalaki likita mpo na koboma mokonzi Kizerisesi.


Mokonzi Kizerisesi azongiselaki Ester, mwasi na ye, mpe Maridoshe, Moyuda : — Lokola Amani abundisaki Bayuda, ngai napesi ndako na ye epai ya Ester ; mpe napesi mitindo mpo ete badiembika ye na nzete.


Mokonzi apesaki ndingisa ete esalema bongo. Bapanzaki sango ya mobeko yango na engumba Size mpe badiembikaki bana mibali zomi ya Amani.


Kasi tango mokonzi ayokaki sango ya likita ya Amani, akomaki mobeko kati na mokanda mpo ete makanisi mabe oyo Amani abongisaki mpo na Bayuda ekweya na moto na ye moko mpe, lisusu, badiembika ye elongo na bana na ye ya mibali, na nzete.


Tika ete bato mabe bakangama na mitambo na bango moko, mpe ete ngai naleka na kimia !


tika ete libebi ekweyela bango na mbalakata, bakangama bango moko na mitambo oyo batielaki ngai mpe bakweya kati na mabulu yango !


Ndenge nini babebisamaka mbala moko, bakomaka na suka, mpe somo elimwisaka bango !


Mokonzi asepelaki makasi mpe apesaki mitindo ete babimisa Daniele wuta na libulu. Boye, babimisaki Daniele wuta na libulu mpe bamonaki ata pota moko te na nzoto na ye, pamba te azalaki na elikya na Nzambe na ye.


Bakalaka ya lokumu mpe bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka bakendeki lisanga epai ya mokonzi mpe balobaki : — Tika ete mokonzi Dariusi awumela na bomoi seko na seko !


Davidi akimaki mbangu mpe atelemaki na likolo ya moto ya Filisitia, asimbaki mopanga ya moto ya Filisitia, abimisaki yango na ebombelo na yango, abomaki ye, mpe akataki moto na ye na nzela ya mopanga yango. Tango mampinga ya Filisitia bamonaki ete elombe na bango akufi, bakimaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ