Ester 7:8 - Mokanda na Bomoi8 Tango kaka mokonzi azongaki na esika oyo basalelaki feti longwa na elanga ya ndako ya mokonzi, Amani amikweyisaki na kiti monene oyo Ester, mwasi ya mokonzi, ayekamaki. Mokonzi agangaki : — Eh ! Alingi lisusu kotungisa mwasi ya mokonzi na miso na ngai kati na ndako na ngai ? Tango kaka mokonzi asilisaki koloba, bazipaki elongi ya Amani. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Elamba yango ezalaki na banzela ya langi ya mosaka, ya langi ya pembe mpe ya langi ya ble ; bakangisaki yango na makonzi oyo basala na mabanga ya marbre, na basinga ya lino ya langi ya pembe mpe ya motane ; bongo balekisaki yango kati na bapete ya palata. Batiaki bakiti minene ya wolo mpe ya palata, na etando ya lopango ya bakaro oyo basala na mabanga ya talo ya langi ya ndenge na ndenge : mabanga ya porfire, ya marbre, ya marbre ya mwindo mpe mabanga mosusu ya talo.