Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 7:7 - Mokanda na Bomoi

7 Mokonzi atelemaki na kanda makasi, atikaki vino na ye mpe abimaki na elanga ya ndako ya mokonzi. Tango Amani asosolaki ete mokonzi asili kokata etumbu na ye, atikalaki wana mpo na kobondela Ester, mwasi ya mokonzi, mpo ete abikisa bomoi na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 7:7
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi tango basoda oyo baboma bango mokongo bayebisaki Vasti, mwasi ya mokonzi, mitindo oyo mokonzi apesaki ; Vasti, mwasi ya mokonzi, aboyaki kokende. Mokonzi atombokaki makasi mpe apelaki na kanda.


Sima na mikolo yango, mokonzi asalisaki kati na elanga ya ndako na ye ya bokonzi, feti mosusu oyo esalaki mikolo sambo mpo na bato nyonso, ezala babola to bazwi, oyo bazalaki kati na Size, engumba mokonzi batonga makasi.


Boye badiembikaki Amani na nzete oyo atelemisaki mpo na Maridoshe. Mpe kanda ya mokonzi ekitaki.


Moto mabe amonaka yango mpe asilikaka na zuwa, aliaka minu mpe alembaka nzoto. Posa ya bato mabe elimwaka.


Bato mabe bakofukama liboso ya bato ya malamu, bato ya mitema mabe bakofukama na ekuke ya bato ya sembo.


Mokonzi asepelaka na mosali ya bwanya, kasi mosali oyo ayokisaka ye soni apelisaka kanda na ye.


Kanda ya mokonzi ememaka na kufa, kasi moto ya bwanya ayebaka kokitisa yango.


Kanda ya mokonzi ezali lokola koganga ya nkosi, kasi bolamu na ye ezali lokola mamwe.


Bana ya banyokoli na yo bakoya kofukama liboso na yo ; bato nyonso oyo batiolaki yo bakofukama na se ya matambe na yo mpe bakobenga yo Engumba ya Yawe, Siona ya Mosantu ya Isalaele.


Nabukodonozori atombokelaki makasi Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, mpe akangelaki bango elongi ; apesaki mitindo ete bapelisa moto makasi penza mbala sambo koleka ndenge bapelisaka yango tango nyonso.


Tala makambo oyo nakosala bato ya ndako ya mayangani ya Satana, oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali na bango Bayuda te ; bazali nde bakosi. Nakosala ete baya kofukama na makolo na yo mpe bandima ete nalingaka yo.


Soki alobi : « Malamu, » wana mosali na yo akozala na kimia. Kasi soki atomboki na kanda, wana yeba malamu ete azwi mokano ya kosala ngai mabe.


Jonatan alobaki : — Te ! Ekozala penza likambo ya nkele soki ngai nakoki koyeba ete tata na ngai azwi mokano ya kosala yo mabe, bongo nayebisi yo yango te !


Sik’oyo, yeba kokanisa mpo na yango mpe tala eloko nini osengeli kosala, pamba te mokano ya koboma nkolo na biso mpe libota na ye mobimba esili kozwama. Nkolo na biso azali moto mabe koleka, boye moto moko te akoki kosolola na ye. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ