Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 7:6 - Mokanda na Bomoi

6 Ester azongiselaki ye : — Monyokoli mpe monguna ! Ezali Amani, moto oyo ya pasi ! Amani abangaki makasi liboso ya mokonzi mpe ya mwasi ya mokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 7:6
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango banguna na biso bayokaki sango yango, bato ya bikolo nyonso ya zingazinga bakomaki kobanga mpe koyoka soni na miso na bango moko, mpo ete basosolaki ete ezali kaka na lisungi ya Nzambe na biso nde mosala ya ndenge wana esalemaki.


Mokonzi alongolaki lopete na ye na mosapi na ye mpe apesaki yango epai ya Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya mboka Agagi, monguna ya Bayuda.


Mokonzi Kizerisesi atunaki Ester, mwasi ya mokonzi : — Moto yango nani oyo ameki kobongisa likambo ya boye ? Azali wapi ?


Kaka na mokolo yango, mokonzi Kizerisesi apesaki Ester, mwasi ya mokonzi, biloko ya Amani, monguna ya Bayuda. Mpe lokola Ester ayebisaki mokonzi ete Maridoshe azali ndeko na ye, mokonzi abengaki Maridoshe mpe Maridoshe akendeki liboso ya mokonzi.


Tango bato mabe babundisaka ngai mpo na koluka kosala ngai mabe, ezali bayini mpe banguna na ngai nde baninganaka mpe bakweyaka.


Kanda ya mokonzi ememaka na kufa, kasi moto ya bwanya ayebaka kokitisa yango.


Biloko oyo mabele ebotaka ezali mpo na bolamu ya bato nyonso ; ezala mokonzi, abikaka mpe na mbuma ya bilanga.


Motema na ngai ezali kobeta noki-noki, nakomi kolenga na somo, mwa malili ya pokwa oyo nazelaka na esengo ekomeli ngai somo makasi.


Nzambe akosambisa bato oyo bazali na libanda ya Lingomba ; kasi bino, bobengana moto mabe kati na bino.


mpo ete motomboki amonisama, ye oyo Nkolo Yesu akoboma na nzela ya Liloba kowuta na monoko na Ye mpe akobebisa tango akoya na nzela ya nkembo ya boyei na Ye.


Tika ete Yawe azala Mosambisi kati na ngai mpe yo, mpe tika ete Yawe azongisela yo mabe na mabe oyo osali ngai ! Kasi loboko na ngai ekosimba yo te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ