Pamba te ngai mpe bato na ngai, tosili kotekama mpo ete babebisa biso, baboma biso mpe balimwisa biso ! Soki ata batekaki biso mpo ete tozala bawumbu ya basi to ya mibali, nalingaki na ngai kovanda kimia ; pamba te pasi ata moko te ya lolenge oyo ekokaki kotinda ngai ete natungisa mokonzi !
Boye, Petelo atunaki ye : — Ananiasi, ndenge nini Satana atondisi motema na yo mpo ete okosa Molimo Mosantu, mpe obomba ndambo ya mbongo oyo otekeli elanga na yo ?