Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 7:3 - Mokanda na Bomoi

3 Ester, mwasi ya mokonzi, azongisaki : — Ah mokonzi ! Soki nazwi ngolu na miso na yo, mpe soki yango esepelisi yo mokonzi, tika ete opesa ngai bomoi na ngai ; yango nde ezali bosenga na ngai. Mpe lisusu, tika ete obatela bato na ngai ; yango nde ezali bosenga na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 7:3
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakalaka na ye balobaki na ye : — Tala, toyokaki ete bakonzi ya Isalaele bazalaka malamu. Pesa nzela ete tokende epai ya mokonzi ya Isalaele, tolata bilamba ya saki na loketo na biso mpe basinga na mito na biso ; tango mosusu bakoki kobikisa bomoi na yo.


Mokonzi Akazia atindaki lisusu na mbala ya misato mokonzi mosusu ya basoda tuku mitano elongo na basoda tuku mitano. Mokonzi yango akendeki kofukama liboso ya Eliya mpe abondelaki ye : — Moto na Nzambe, tika ete bomoi na ngai mpe bomoi ya basali na yo, bato tuku mitano oyo, ezala na motuya na miso na yo !


Maridoshe apesaki lisusu Ataki mokanda ya mobeko oyo mokonzi abimisaki, mpo ete ye Ataki alakisa yango epai ya Ester, alimbolela ye yango mpe akomisa epai ya Ester mitindo na ye ete Ester akende epai ya mokonzi mpo na kotungisa ye mpe kobondela mawa ya mokonzi mpo na bato na ye Ester ; pamba te mokonzi asili kobimisa mobeko ya koboma Bayuda mpe sango na yango esili kopanzana kati na engumba Size.


Soki nazwi ngolu na miso ya mokonzi mpe soki mokonzi asepeli kokokisa posa mpe bosenga na ngai, tika ete mokonzi mpe Amani bakoka koya lobi na feti oyo nakobongisa mpo na bango ; bongo nde nakopesa eyano na motuna ya mokonzi.


Mokonzi atelemaki na kanda makasi, atikaki vino na ye mpe abimaki na elanga ya ndako ya mokonzi. Tango Amani asosolaki ete mokonzi asili kokata etumbu na ye, atikalaki wana mpo na kobondela Ester, mwasi ya mokonzi, mpo ete abikisa bomoi na ye.


Ester alobaki : — Soki esepelisi mokonzi, soki nazwi ngolu na miso ya mokonzi, soki akanisi ete ezali sembo mpo na ye kosala mpe soki asepeli na ngai, tika ete mobeko ekomama mpo na kokweyisa mikano ya Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya Agagi, oyo ebongisamaki mpe ekomamaki mpo na koboma Bayuda kati na bituka nyonso ya mokonzi.


Satana azongiselaki Yawe : — Poso mpo na poso : moto akoki kopesa biloko na ye nyonso mpo kaka abikisa bomoi na ye.


Loba bango : « Nakomisi libondeli na ngai liboso ya mokonzi mpo ete azongisa ngai na ndako ya Jonatan te, noki te nakokufela kuna. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ