Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 6:6 - Mokanda na Bomoi

6 Tango Amani akotaki, mokonzi atunaki ye : — Tokoki kosala nini mpo na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu ? Amani amilobelaki : « Nani lisusu oyo mokonzi akoki kopesa lokumu soki ngai te ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 6:6
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi atunaki bango : — Kolanda mobeko, esengi kosala nini epai ya Vasti, mwasi ya mokonzi, mpo ete aboyi kotosa mitindo ya mokonzi Kizerisesi, mitindo oyo basoda oyo baboma bango mokongo bayebisaki ye ?


Amani abetelaki bango lisolo ya bomengo na ye oyo ezalaki penza ebele, motango ya bana na ye mpe makambo nyonso oyo mokonzi azalaki kosala mpo na kopesa ye lokumu mpe ndenge nini atombolaki ye likolo ya bakambi mpe bakalaka mosusu.


Amani azwaki nzambala mpe mpunda, alatisaki Maridoshe nzambala yango mpe atambolisaki ye likolo ya mpunda na balabala nyonso ya engumba na kotatola liboso na ye : « Tala makambo oyo mokonzi asali mpo na moto oyo alingi kopesa lokumu ! »


Basali ya mokonzi bazongisaki : — Ezali Amani nde azali kati na lopango. Mokonzi alobaki : — Bokotisa ye.


Amani azongiselaki mokonzi : — Mpo na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu,


Tika ete bapesa nzambala mpe mpunda yango epai ya kalaka oyo aleki na lokumu kati na bakalaka ya mokonzi, mpe tika ete balatisa nzambala na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu, mpe tika ete batambolisa ye likolo ya mpunda na balabala ya engumba na kotatola liboso na ye : « Tala makambo oyo mokonzi asali mpo na moto oyo ye alingi kopesa lokumu ! »


Tika ete bato oyo basepelaka na bosembo na ngai baganga na esengo mpe basepela ; tika ete balobaka tango nyonso : « Tika ete Yawe anetolama, Ye oyo asepelaka na kimia ya mowumbu na Ye ! »


Pamba te kotomboka ya bato oyo bazangi mayele ekoboma bango, mpe bozangi bokebi ya bato oyo bazangi mayele ekoboma kaka bango moko ;


Lolendo eyaka liboso ya kobebisama, mpe komimatisa eyaka liboso ya kokweyisama.


Liboso ete moto akweya, motema na ye ekomaka na lolendo ; kasi komikitisa eyaka liboso ya nkembo.


Ezali na bato oyo batonda na lolendo mpe bamonaka bato mosusu pamba.


Tala mosali na Ngai, oyo nasimbaka ; moponami na Ngai, oyo asalaka esengo na Ngai. Nakotia Molimo na Ngai na likolo na ye, mpe akotia bosembo kati na bikolo,


Nakosepela kosalela bango bolamu mpe nakolona bango penza kati na mokili oyo, na motema mpe na molimo na Ngai mobimba. ›


Lolendo ya motema na yo ekosaki yo, yo movandi ya madusu ya mabanga, yo oyo otonga ndako na yo na basonge ya bangomba mpe omilobelaka : ‹ Nani akokweyisa ngai na se ? ›


Bongo, mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo mpe elobaki : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »


Soki esalemi bongo, moto oyo abengisi bino mibale akoya koloba na yo : ‹ Tikela moto oyo kiti na yo ! › Bongo, na soni nyonso, okokende kozwa esika ya suka.


mpo ete bato nyonso bakumisa Mwana ndenge bakumisaka Tata. Moto oyo akumisaka Mwana te akumisaka mpe Tata te oyo atindaki Mwana.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ