Ester 6:3 - Mokanda na Bomoi3 Mokonzi atunaki : — Lokumu mpe lifuti nini Maridoshe azwaki mpo na yango ? Basali na ye bazongisaki : — Basala ata eloko moko te mpo na ye. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nzokande, nayoki ete yo ozali na makoki ya kolimbola mpe ya kopesa biyano na makambo ya makasi ; sik’oyo, soki olongi kotanga makomi oyo mpe opesi ngai ndimbola na yango, nakolatisa yo bilamba ya motane mpe sheneti ya wolo na kingo, mpe okokoma moto ya misato kati na molongo ya bayangeli ya mokili na ngai ya bokonzi.
Mokonzi agangaki makasi mpe apesaki mitindo ete bamemela ye banganga-kisi, bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe bato oyo balobaka makambo oyo ekoya. Mpe mokonzi alobaki na bato oyo nyonso ya bwanya, ya Babiloni : — Moto nyonso oyo akokoka kotanga makomi oyo mpe akoyebisa ngai ndimbola na yango, nakolatisa ye bilamba ya motane mpe sheneti ya wolo na kingo, mpe akozala kalaka ya lokumu kati na bokonzi.