7 Ester azongisaki : — Posa mpe bosenga na ngai ezali boye :
Tango bazalaki komela vino, mokonzi atunaki lisusu Ester : — Sik’oyo, posa na yo ezali nini ? Ekopesamela yo. Mpe bosenga na yo ezali nini ? Ekopesamela yo, ata soki ezali kati-kati ya bokonzi na ngai.
Soki nazwi ngolu na miso ya mokonzi mpe soki mokonzi asepeli kokokisa posa mpe bosenga na ngai, tika ete mokonzi mpe Amani bakoka koya lobi na feti oyo nakobongisa mpo na bango ; bongo nde nakopesa eyano na motuna ya mokonzi.