Mpe wana bazalaki komela vino na mokolo oyo ya mibale, mokonzi atunaki lisusu Ester : — Ester, mwasi ya mokonzi, bosenga na yo ezali nini ? Ekopesamela yo. Posa na yo ezali nini ? Ekopesamela yo, ata soki ezali koleka kati-kati ya mokili na ngai ya bokonzi.
Mokonzi alobaki na Ester, mwasi ya mokonzi : — Kati na engumba Size, Bayuda babomi mpe babebisi bato nkama mitano elongo na bana mibali zomi ya Amani. Basali nini kati na bituka mosusu ya mokonzi ? Sik’oyo, posa na yo ezali nini ? Bosenga na yo ezali nini ? Ekopesamela yo.