Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 5:4 - Mokanda na Bomoi

4 Ester azongisaki : — Oh soki esepelisi mokonzi, tika ete mokonzi akoka koya lelo, elongo na Amani, na feti monene oyo nabongisi mpo na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 5:4
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Izaki alobaki : — Mwana na ngai, memela ngai nyama na yo mpo ete nalia mpe napambola yo. Jakobi amemelaki ye nyama, mpe Izaki aliaki. Amemelaki ye lisusu masanga ya vino mpe amelaki.


Apesaki lisusu mitindo wana epai ya mosali ya mibale, ya misato mpe epai ya basali nyonso oyo bazalaki kolanda bibwele : « Bokoloba kaka maloba moko tango bokokutana na Ezawu.


Vasti, mwasi ya mokonzi, ye mpe asalisaki feti mpo na basi, kati na ndako ya mokonzi Kizerisesi.


Boye, na mitindo ya mokonzi, bantoma bakendeki na lombangu mpe bapanzaki kati na Size, engumba mokonzi, sango ya mobeko ya mokonzi. Wana mokonzi mpe Amani bavandaki mpo na komela masanga, engumba Size ezalaki kati na matanga.


Mokonzi atunaki ye : — Ester, mwasi ya mokonzi, likambo nini ? Bosenga na yo ezali nini ? Nazali pene ya kopesa yo ata kati-kati ya bokonzi na ngai !


Mokonzi alobaki : — Bolukela ngai noki Amani mpo ete tokokisa bosenga ya Ester. Boye, mokonzi mpe Amani bakendeki na feti oyo Ester abongisaki.


Soki nazwi ngolu na miso ya mokonzi mpe soki mokonzi asepeli kokokisa posa mpe bosenga na ngai, tika ete mokonzi mpe Amani bakoka koya lobi na feti oyo nakobongisa mpo na bango ; bongo nde nakopesa eyano na motuna ya mokonzi.


Esengo na moto oyo ayokelaka bato mawa mpe adefisaka, mpe asalaka misala na ye kolanda bosembo.


Zoba alandaka baposa nyonso ya motema na ye, kasi moto ya bwanya akangaka yango mpe akitisaka yango.


Bandeko na ngai, botika kokanisa lokola bana mike ; bozala te lokola bana mike na lolenge na bino ya kososola makambo. Mpo na oyo etali mabe, bozala lokola bana mike ; kasi mpo na oyo etali lolenge ya kososola makambo, bozala mikolo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ