Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 5:3 - Mokanda na Bomoi

3 Mokonzi atunaki ye : — Ester, mwasi ya mokonzi, likambo nini ? Bosenga na yo ezali nini ? Nazali pene ya kopesa yo ata kati-kati ya bokonzi na ngai !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 5:3
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Batisheba alobaki : — Nazali na bosenga moko ya moke mpo na koyebisa yo, kasi kopimela ngai yango te. Mokonzi azongisaki : — Loba na yo, mama na ngai ; nakopimela yo yango te.


Na Gabaoni, Yawe amimonisaki epai ya Salomo kati na ndoto ya butu. Nzambe alobaki na ye : — Senga Ngai nyonso oyo olingi ete napesa yo.


Mokonzi atunaki ngai : — Olingi nini ? Nasambelaki Nzambe ya Likolo,


Ester azongisaki : — Oh soki esepelisi mokonzi, tika ete mokonzi akoka koya lelo, elongo na Amani, na feti monene oyo nabongisi mpo na ye.


Tango bazalaki komela vino, mokonzi atunaki lisusu Ester : — Sik’oyo, posa na yo ezali nini ? Ekopesamela yo. Mpe bosenga na yo ezali nini ? Ekopesamela yo, ata soki ezali kati-kati ya bokonzi na ngai.


Mpe wana bazalaki komela vino na mokolo oyo ya mibale, mokonzi atunaki lisusu Ester : — Ester, mwasi ya mokonzi, bosenga na yo ezali nini ? Ekopesamela yo. Posa na yo ezali nini ? Ekopesamela yo, ata soki ezali koleka kati-kati ya mokili na ngai ya bokonzi.


Mokonzi alobaki na Ester, mwasi ya mokonzi : — Kati na engumba Size, Bayuda babomi mpe babebisi bato nkama mitano elongo na bana mibali zomi ya Amani. Basali nini kati na bituka mosusu ya mokonzi ? Sik’oyo, posa na yo ezali nini ? Bosenga na yo ezali nini ? Ekopesamela yo.


Mpe alapaki kutu ndayi epai na ye : — Nakopesa yo nyonso oyo okosenga ngai, ata ndambo ya bokonzi na ngai.


— Olingi nasala nini mpo na yo ? Mokufi miso azongisaki : — Nkolo, nalingi komona.


Mokonzi ya basoda akamataki elenge mobali na loboko, amemaki ye na pembeni mpe atunaki ye : — Likambo nini olingi koyebisa ngai ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ