Jozefi akokaki lisusu komikanga te liboso ya bato nyonso oyo bazalaki liboso na ye, agangaki : « Bobimisa bato nyonso ! » Boye, moto moko te azalaki pembeni na ye tango amimonisaki epai ya bandeko na ye ya mibali.
Amani abetelaki bango lisolo ya bomengo na ye oyo ezalaki penza ebele, motango ya bana na ye mpe makambo nyonso oyo mokonzi azalaki kosala mpo na kopesa ye lokumu mpe ndenge nini atombolaki ye likolo ya bakambi mpe bakalaka mosusu.
Amani ayebisaki mwasi na ye, Zereshi, mpe baninga na ye nyonso makambo oyo ekomelaki ye. Bapesi toli na ye mpe mwasi na ye, Zereshi, balobaki na ye : — Lokola kokweyisama na yo ebandi liboso ya Maridoshe oyo azali Moyuda, okokoka kolonga ye te ; solo penza, okokweyisama lisusu na se koleka !