Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 4:4 - Mokanda na Bomoi

4 Tango basi bawumbu ya Ester, mwasi ya Mokonzi, mpe basoda na ye, oyo baboma bango mokongo, bayebisaki Ester makambo oyo Maridoshe asalaki, Ester amitungisaki makasi. Atindelaki Maridoshe bilamba mpo ete alata yango mpe alongola basaki oyo alataki, kasi Maridoshe aboyaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 4:4
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bana na ye nyonso ya mibali mpe ya basi bayaki kobondisa ye ; kasi aboyaki kobondisama. Alobaki : « Te ; nakozala na matanga kino nakolanda mwana na ngai na mboka ya bakufi epai wapi mwana na ngai azali. » Boye, tata na ye alelaki ye.


Jewu atombolaki miso na ngambo ya lininisa mpe agangaki : — Nani kati na bino azali na ngambo na ngai, nani ? Bakengeli mibale to misato ya mokonzi, oyo baboma bango mokongo, batalaki Jewu wuta na lininisa.


Kasi tango basoda oyo baboma bango mokongo bayebisaki Vasti, mwasi ya mokonzi, mitindo oyo mokonzi apesaki ; Vasti, mwasi ya mokonzi, aboyaki kokende. Mokonzi atombokaki makasi mpe apelaki na kanda.


Kati na bituka nyonso epai wapi mitindo mpe mobeko ya mokonzi ezalaki kokoma, matanga monene ezalaki kati na Bayuda : bazalaki kokila bilei, kolela mpe koganga ya mawa ; ebele bazalaki komitanda na basaki mpe na putulu.


Ester abengisaki Ataki, moko kati na bakalaka ya lokumu, oyo baboma mokongo mpe mokonzi aponaki mpo na kosalela Ester ; atindaki ye mpo na koyeba likambo oyo ezali kotungisa Maridoshe mpe tina nini azali komitungisa.


Nabelelaka Nzambe na koganga ; nabelelaka Nzambe mpo ete ayoka ngai !


Tika ete mopaya oyo akangami na Yawe aloba te : « Yawe akokabola ngai solo na bato na Ye ! » Mpe tika ete soda oyo baboma mokongo aloba te : « Nazali na ngai kaka nzete ya kokawuka ! »


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Mongongo moko ezali koyokana na Rama, ezali mongongo ya mawa mpe ya kolela makasi : Rasheli azali kolela bana na ye ya mibali mpe aboyi kobondisama, pamba te bana na ye ya mibali bazali lisusu na bomoi te. »


Boye, Filipo atelemaki mpe akendeki ; na nzela, akutanaki na soda moko oyo baboma mokongo, moto ya mboka Etiopi ; azalaki kalaka moko ya lokumu mpe azalaki na mokumba ya kobatela bomengo nyonso ya Kandase, mwasi mokonzi ya Etiopi. Moto yango ayaki na Yelusalemi mpo na kogumbamela ;


Akokamata eteni ya zomi ya milona na bino mpe ya bilanga na bino ya vino, mpe akopesa yango epai ya kalaka na ye ya lokumu mpe epai ya basali na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ