Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 4:3 - Mokanda na Bomoi

3 Kati na bituka nyonso epai wapi mitindo mpe mobeko ya mokonzi ezalaki kokoma, matanga monene ezalaki kati na Bayuda : bazalaki kokila bilei, kolela mpe koganga ya mawa ; ebele bazalaki komitanda na basaki mpe na putulu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 4:3
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala makambo oyo esalemaki na tango ya mokonzi Kizerisesi oyo azalaki kokamba bituka nkama moko na tuku mibale na sambo, longwa na Ende kino na Kushi.


Boye, na mokolo ya zomi na misato ya sanza ya liboso, babengisaki bakomi mikanda ya mokonzi ; mpe na mitindo ya Amani, bakomaki mitindo nyonso ya Amani epai ya bakalaka ya lokumu ya mokonzi, epai ya bayangeli ya etuka moko na moko mpe epai ya bakalaka ya ekolo moko na moko, kolanda lolenge ya kokoma ya etuka moko na moko mpe lokota ya ekolo moko na moko. Bakomaki yango na kombo ya mokonzi Kizerisesi mpe babetaki yango kashe ya mokonzi.


— Kende kosangisa Bayuda nyonso oyo bazali na engumba Size. Bokila bilei mikolo misato mpo na ngai ; butu mpe moyi, bolia mpe bomela eloko te. Ngai mpe nakokila bilei elongo na basi bawumbu na ngai ndenge moko na bino. Sima na yango kaka nde nakokende epai ya mokonzi atako nakobuka mobeko. Soki mpe nakokufa, nakufa kaka !


Bongo akendeki kino na liboso ya ekuke ya ndako ya mokonzi ; pamba te moto moko te, wana alati saki lokola elamba, azalaki na ndingisa ya kokota na ekuke ya mokonzi.


Tango basi bawumbu ya Ester, mwasi ya Mokonzi, mpe basoda na ye, oyo baboma bango mokongo, bayebisaki Ester makambo oyo Maridoshe asalaki, Ester amitungisaki makasi. Atindelaki Maridoshe bilamba mpo ete alata yango mpe alongola basaki oyo alataki, kasi Maridoshe aboyaki.


mpo na kobeta sete na tina na mikolo oyo ya Purimi ete Bayuda basengeli kosala Purimi yango na mikolo na yango oyo ekatama kolanda mokano ya Moyuda Maridoshe mpe Ester, mwasi ya mokonzi ; mpe ndenge Bayuda bakataki yango mpo na bango moko mpe mpo na bakitani na bango lokola tango na bango ya kokila bilei mpe ya bileli.


Yobo akamataki eteni ya mbeki mpo na komikwanza na yango nzoto, mpe amivandisaki na putulu.


Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, azalaki kobenga bino na mokolo wana mpo ete bolela mpe bosala matanga, bomikokola suki mpe bolata saki.


Yango wana nalobaki : « Botika kotala Ngai, botika ete nalela makasi ! Bomeka kobondisa Ngai te mpo na kobebisama ya bato na Ngai ! »


Boni, ezali penza kokila bilei oyo Ngai nalingaka, mokolo oyo moto amikitisaka penza ye moko ? Boni, ezali kaka kogumba moto lokola nzete oyo ebotaka na mayi, kolata bilamba ya saki mpe kolala na putulu ? Ezali yango nde bino bozali kobenga kokila bilei, mokolo oyo Yawe alingaka ?


bakoganga na mongongo makasi mpe bakolela na mawa nyonso mpo na yo ; bakomisopela putulu na mito mpe bakomibamba na mabele.


Boye, nabalolaki elongi na ngai epai na Nkolo Nzambe mpo na kosambela mpe kobondela Ye, na kokila bilei, na kolata basaki mpe na komipakola putulu.


Tango sango yango ekomaki epai ya mokonzi ya Ninive, atelemaki longwa na kiti na ye ya bokonzi, alongolaki bilamba na ye ya bokonzi, alataki saki mpe amivandisaki na putulu.


Bakobwaka bango na fulu ya moto makasi epai wapi ekozala kolela mpe koswa minu.


Bongo mokonzi alobaki na basali na ye : « Bokanga ye makolo mpe maboko, bobwaka ye kati na molili ya libanda, epai wapi kolela mpe koswa minu ezali. »


Bongo na oyo etali mosali mabe oyo, bobwaka ye kati na molili ya libanda, epai wapi kolela mpe koswa minu ezali. »


Jozue apasolaki bilamba na ye mpe amibwakaki elongi kino na mabele liboso ya Sanduku ya Yawe kino na pokwa. Bakambi ya Isalaele mpe basalaki kaka ndenge moko, bamisopelaki putulu na mito na bango.


Tango bantoma bakomaki na Gibea, engumba ya Saulo, mpe balobaki na bato makambo nyonso oyo ezalaki koleka, bato nyonso balelaki makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ