Ester 4:14 - Mokanda na Bomoi14 Pamba te soki yo okangi monoko na yo mpe olobi eloko moko te na tango oyo, lisungi mpe lobiko mpo na Bayuda ekowuta na esika mosusu ; kasi yo mpe libota ya botata na yo, bokokufa. Kutu, nani ayebi soki tango mosusu ezali mpo na makambo ya boye nde okomaki na ndako ya mokonzi ? အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Pamba te, atako tozali bawumbu, kasi Yo Nzambe na biso, osundoli biso te kati na bowumbu na biso. Omonisi biso bolamu na Yo na nzela ya bakonzi ya Persi : bapesi biso makasi ya sika mpo na kotonga lisusu Ndako ya Nzambe na biso, na kobongisa bamir na yango oyo ebukanaki-bukanaki mpe na kopesa biso mir ya kobombamela kati na Yuda mpe na Yelusalemi.
Tango ekomaki ngala ya Ester ya kokende epai ya mokonzi ; Ester, mwana mwasi ya Abiyaili, noko ya Maridoshe oyo abokolaki Ester, amemaki eloko mosusu te, bobele oyo Ege, kalaka ya lokumu, oyo baboma ye mokongo mpe azalaki na kobatela ndako ya basi ya mokonzi, ayebisaki ye. Mpe Ester azwaki ngolu na miso ya moto nyonso oyo azalaki komona ye.
Maridoshe azalaki kobokola Adasa, mwana mwasi ya noko na ye mpo ete azalaki lisusu na tata mpe na mama te. Nzokande, elenge mwasi oyo kombo na ye mosusu ezalaki « Ester » azalaki na ezaleli malamu mpe elongi kitoko. Tango tata mpe mama na ye bakufaki, Maridoshe azwaki ye mpe akomaki kobokola ye lokola mwana na ye penza ya mwasi.
Bato ya Filisitia batunaki : — Nani asali boye ? Bazongiselaki bango : — Ezali Samison, bokilo ya moto moko ya Timina ; pamba te abalisaki mwasi ya Samison epai ya moko kati na baninga oyo Samison abengisaki na feti. Bato ya Filisitia bakendeki mpe batumbaki mwasi yango elongo na tata na ye kino bakufaki.