Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 3:4 - Mokanda na Bomoi

4 Bazalaki koloba na ye bongo mikolo nyonso, kasi Maridoshe azalaki kaka koboya koyoka bango. Boye, bayebisaki Amani makambo yango mpo na koyeba soki ezaleli ya Maridoshe ekondimama mpe soki akokangama kaka na maloba na ye, pamba te ayebisaki bango ete azali Moyuda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 3:4
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokolo na mokolo, mwasi ya Potifari azalaki kaka kotungisa Jozefi, kasi ye mpe azalaki kaka koboya kosangisa na ye nzoto to kozala na ye elongo.


Tika ete moto nyonso oyo, kati na bino, azali na molongo ya bato ya Yawe akende na Yelusalemi kati na Yuda mpo na kotonga Tempelo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo azali Nzambe kati na Yelusalemi !


Bakalaka oyo bazalaki kosala na ndako ya mokonzi batunaki Maridoshe : — Mpo na nini otosaka mitindo ya mokonzi te ?


Tango Amani asosolaki ete Maridoshe afukamelaka ye te mpe apesaka ye lokumu te, asilikaki makasi.


Kasi, mokonzi, ezali na ndambo ya Bayuda oyo okomisaki bayangeli na etuka ya Babiloni : Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, oyo bazali kotosa yo ata moke te : bazali kosalela banzambe na yo te mpe kogumbamela te ekeko ya wolo oyo osali.


Mbala moko, bakendeki epai ya mokonzi mpo na kosolola na ye na tina na mokano oyo azwaki : — Mokonzi, opanzaki sango te ya mokano oyo ozwaki, ete na mikolo tuku misato oyo ekolanda, moto nyonso asengeli kosambela kaka yo, mokonzi ; bongo moto oyo akosambela nzambe to moto mosusu, basengeli kobwaka ye kati na libulu ya bankosi ? Mokonzi azongisaki : — Ezali penza bongo ! Mokano ezali ndenge kaka ekatamaki, kolanda mibeko ya bato ya Medi mpe ya Persi, oyo bakoki kobongola te.


Yona azongisaki : — Nazali Mo-Ebre, nasambelaka Yawe, Nzambe ya Lola, oyo akela bibale mpe mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ