Maridoshe apesaki lisusu Ataki mokanda ya mobeko oyo mokonzi abimisaki, mpo ete ye Ataki alakisa yango epai ya Ester, alimbolela ye yango mpe akomisa epai ya Ester mitindo na ye ete Ester akende epai ya mokonzi mpo na kotungisa ye mpe kobondela mawa ya mokonzi mpo na bato na ye Ester ; pamba te mokonzi asili kobimisa mobeko ya koboma Bayuda mpe sango na yango esili kopanzana kati na engumba Size.