Faraon alongolaki lopete na ye na mosapi na ye mpe atiaki yango na mosapi ya Jozefi. Alatisaki ye bilamba ya lino ya kitoko mpe atiaki ye singa ya wolo na kingo.
Sima na makambo oyo, mokonzi Kizerisesi apesaki lokumu epai ya Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya mboka Agagi ; atombolaki ye mpe atiaki ye likolo ya bakalaka nyonso.
Soki esepelisi mokonzi, tika ete abimisa mobeko ya koboma bango ; mpe ngai nakopesa na maboko ya bakalaka oyo batalaka makambo ya mokonzi mbongo ya bibende ya palata nkoto zomi mpo ete batia yango kati na libenga ya mokonzi.
Mokonzi alongolaki lopete na ye oyo abotolaki epai ya Amani mpe apesaki yango epai ya Maridoshe. Bongo Ester atiaki Maridoshe mokambi ya biloko ya Amani.
Sik’oyo, koma mobeko mosusu na tina na Bayuda, na kombo ya mokonzi, ndenge okomona malamu mpe beta yango kashe ya mokonzi ; pamba te mokanda oyo ekomami na kombo ya mokonzi mpe babeti yango kashe na ye ekoki kobongwana te.