Ester 3:1 - Mokanda na Bomoi1 Sima na makambo oyo, mokonzi Kizerisesi apesaki lokumu epai ya Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya mboka Agagi ; atombolaki ye mpe atiaki ye likolo ya bakalaka nyonso. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nzokande, ezalaki na bato sambo ya lokumu, bato ya Persi mpe ya Medi, oyo bazalaki bapesi toli oyo mokonzi azalaki kolinga makasi ; bazalaki kosangana na mayangani ya mokonzi mpe basimbaki misala oyo eleki minene. Bakombo na bango ezalaki : Karishena, Shetari, Adimata, Tarsisi, Meresi, Marisena mpe Memukani.