Ester 2:7 - Mokanda na Bomoi7 Maridoshe azalaki kobokola Adasa, mwana mwasi ya noko na ye mpo ete azalaki lisusu na tata mpe na mama te. Nzokande, elenge mwasi oyo kombo na ye mosusu ezalaki « Ester » azalaki na ezaleli malamu mpe elongi kitoko. Tango tata mpe mama na ye bakufaki, Maridoshe azwaki ye mpe akomaki kobokola ye lokola mwana na ye penza ya mwasi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango ekomaki ngala ya Ester ya kokende epai ya mokonzi ; Ester, mwana mwasi ya Abiyaili, noko ya Maridoshe oyo abokolaki Ester, amemaki eloko mosusu te, bobele oyo Ege, kalaka ya lokumu, oyo baboma ye mokongo mpe azalaki na kobatela ndako ya basi ya mokonzi, ayebisaki ye. Mpe Ester azwaki ngolu na miso ya moto nyonso oyo azalaki komona ye.