Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 2:23 - Mokanda na Bomoi

23 Bongo sima na bango koluka koyeba bosolo ya likambo yango, emonanaki ete ezali likambo ya solo. Boye badiembikaki basoda nyonso mibale na nzete mpe bakomaki makambo nyonso wana kati na buku ya masolo, na miso ya mokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 2:23
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na mikolo misato, Faraon akokata moto na yo mpe akodiembika yo na nzete. Bongo bandeke ekolia mosuni na yo. »


Kasi Faraon adiembikaki kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa, ndenge kaka Jozefi ayebisaki bango.


mpo ete baluka kati na babuku ya bakonzi oyo bazalaki liboso na yo mpo na kososola malamu. Okomona solo kati na babuku yango ete engumba oyo ezali engumba ya batomboki, etungisaka bakonzi mpe bituka. Mpe lisusu, wuta kala, ezali esika ya batomboki. Yango wana engumba oyo ebebisamaki.


Bongo misala nyonso ya bokonzi mpe ya nguya na ye, elongo na makambo nyonso ya lokumu ya Maridoshe oyo mokonzi atombolaki, ekomamaki kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Medi mpe ya Persi.


Zereshi, mwasi na ye, mpe baninga na ye nyonso balobaki na ye : — Telemisa nzete ya bametele pene tuku mibale na mitano na bosanda ; mpe lobi na tongo, okosenga na mokonzi ete badiembika Maridoshe na nzete yango. Bongo okokende na esengo na feti elongo na mokonzi. Likanisi oyo esepelisaki Amani, mpe atelemisaki nzete.


Na butu wana, lokola mokonzi akokaki kolala te, asengaki ete bamemela ye buku ya masolo, masolo ya bokonzi na ye, mpo ete batanga yango liboso na ye.


Boye badiembikaki Amani na nzete oyo atelemisaki mpo na Maridoshe. Mpe kanda ya mokonzi ekitaki.


Ndenge wana nde bato oyo batosaka Yawe bazalaki kosolola bango na bango, kasi Yawe ayokaki masolo na bango. Boye buku moko ya ekaniseli ekomamaki liboso ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Yawe mpe bapesaka Kombo na Ye lokumu.


Adiembikaki mokonzi ya Ayi, na nzete kino na pokwa ; bongo tango moyi elalaki, Jozue atindaki ete balongola ebembe yango na nzete. Babwakaki yango na ekotelo ya ekuke ya engumba mpe batondisaki na likolo na yango liboke monene ya mabanga oyo ezali kino na mokolo ya lelo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ