Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 2:17 - Mokanda na Bomoi

17 Mokonzi alingaki Ester makasi koleka basi nyonso. Ester azwaki ngolu mpe andimamaki na miso ya mokonzi koleka bilenge basi mosusu. Bongo mokonzi atiaki motole ya bokonzi na moto ya Ester mpe akomisaki ye mwasi ya mokonzi na esika ya Vasti.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 2:17
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atindaki bango ete bamema liboso na ye Vasti, mwasi ya mokonzi ; bongo alata motole na ye ya bokonzi mpo ete alakisa kitoko na ye epai ya bato mpe epai ya bakalaka, pamba te azalaki penza kitoko.


Ezalaki na sanza ya zomi, sanza ya Tebeti, na mobu ya sambo ya bokonzi ya Kizerisesi nde bamemaki Ester liboso ya mokonzi kati na ndako ya mokonzi.


Pamba te soki yo okangi monoko na yo mpe olobi eloko moko te na tango oyo, lisungi mpe lobiko mpo na Bayuda ekowuta na esika mosusu ; kasi yo mpe libota ya botata na yo, bokokufa. Kutu, nani ayebi soki tango mosusu ezali mpo na makambo ya boye nde okomaki na ndako ya mokonzi ?


tika ete bamema nzambala ya bokonzi oyo mokonzi alataka elongo na mpunda oyo mokonzi amataka mpe batia motole ya bokonzi na moto ya mpunda yango.


Kati na loboko na Yawe, motema ya mokonzi ezalaka lokola moluka oyo atindaka esika nyonso oyo alingi.


Banzete nyonso ya zamba ekoyeba solo ete Ngai Yawe nde nakweyisaka nzete ya molayi mpe nakomisaka nzete ya mokuse molayi, nakawusaka nzete ya mobesu mpe nakomisaka nzete ya kokawuka nzete ya mobesu. Ngai Yawe nde nalobi mpe nakosala oyo nalobi. › »


Alongolaka mobola na putulu, mpe abimisaka na fulu moto oyo azanga ; mpo ete avandisa bango esika moko na bato ya lokumu mpe apesa bango kiti ya lokumu lokola libula. Pamba te miboko ya mabele ezali ya Yawe, mpe ezali na likolo na yango nde atia mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ