Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 2:16 - Mokanda na Bomoi

16 Ezalaki na sanza ya zomi, sanza ya Tebeti, na mobu ya sambo ya bokonzi ya Kizerisesi nde bamemaki Ester liboso ya mokonzi kati na ndako ya mokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 2:16
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kaka na ebandeli ya bokonzi ya Kizerisesi, batindelaki ye mokanda mpo na kofunda bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi.


Esidrasi mpe akomaki elongo na bango na Yelusalemi na sanza ya mitano ya mobu ya sambo ya mokonzi.


Sima na mikolo, kanda ya mokonzi Kizerisesi ekitaki ; akomaki kokanisa Vasti, makambo oyo asalaki mpe mobeko oyo azwaki na tina na ye.


Tango ekomaki ngala ya Ester ya kokende epai ya mokonzi ; Ester, mwana mwasi ya Abiyaili, noko ya Maridoshe oyo abokolaki Ester, amemaki eloko mosusu te, bobele oyo Ege, kalaka ya lokumu, oyo baboma ye mokongo mpe azalaki na kobatela ndako ya basi ya mokonzi, ayebisaki ye. Mpe Ester azwaki ngolu na miso ya moto nyonso oyo azalaki komona ye.


Mokonzi alingaki Ester makasi koleka basi nyonso. Ester azwaki ngolu mpe andimamaki na miso ya mokonzi koleka bilenge basi mosusu. Bongo mokonzi atiaki motole ya bokonzi na moto ya Ester mpe akomisaki ye mwasi ya mokonzi na esika ya Vasti.


Tika ete mokonzi atia bato kati na etuka moko na moko ya bokonzi na ye, mpo ete bamema na ndako ya basi oyo ezalaka na Size, engumba mokonzi, bilenge basi nyonso ya kitoko oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te. Tika ete bapesa bango na maboko ya Ege, kalaka ya lokumu mpo na mokonzi, oyo baboma ye mokongo mpe abatelaka basi ; mpe tika ete bapesa bango mafuta mpe malasi oyo ekomisaka bato kitoko.


Na tango wana kaka, na mokolo ya tuku mibale na misato ya sanza ya misato, sanza ya Sivani, babengisaki bakomi mikanda ya mokonzi. Makambo nyonso oyo Maridoshe atindaki mpo na Bayuda, bakomelaki yango bayangeli ya bituka, bayangeli mpe bakalaka ya bituka nyonso, longwa na Ende kino na Kushi, bituka nkama moko na tuku mibale na sambo, ekolo moko na moko kolanda lokota na yango, etuka moko na moko kolanda ndenge na yango ya kokoma mpe Bayuda kolanda ndenge na bango ya kokoma mpe lokota na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ