Boye elenge mwasi azalaki kokende epai ya mokonzi na pokwa ; mpe na tongo ya mokolo oyo ezalaki kolanda, azalaki kokende na ndako mosusu ya basi ya mokonzi, oyo Shashigazi azalaki kokamba. Shashigazi azalaki kalaka ya lokumu mpo na mokonzi, baboma ye mokongo mpe azalaki na mokumba ya kobatela bamakangu ya mokonzi. Elenge mwasi azalaki lisusu te kozonga liboso ya mokonzi, longola kaka soki mokonzi ayoki posa na ye mpe abengisi ye na kombo.