Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 2:14 - Mokanda na Bomoi

14 Boye elenge mwasi azalaki kokende epai ya mokonzi na pokwa ; mpe na tongo ya mokolo oyo ezalaki kolanda, azalaki kokende na ndako mosusu ya basi ya mokonzi, oyo Shashigazi azalaki kokamba. Shashigazi azalaki kalaka ya lokumu mpo na mokonzi, baboma ye mokongo mpe azalaki na mokumba ya kobatela bamakangu ya mokonzi. Elenge mwasi azalaki lisusu te kozonga liboso ya mokonzi, longola kaka soki mokonzi ayoki posa na ye mpe abengisi ye na kombo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 2:14
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokola elenge mobali, oyo azalaki na lokumu koleka bato nyonso ya ndako ya tata na ye, alingaki mwana mwasi ya Jakobi, akokisaki na lombangu likambo oyo bayebisaki ye.


Tala ndenge elenge mwasi nyonso oyo azalaki kokende epai ya mokonzi azalaki : Wuta na ndako ya basi ya mokonzi kino na ndako ya mokonzi, bazalaki kopesa ye eloko nyonso oyo azalaki na yango na bosenga.


Tango ekomaki ngala ya Ester ya kokende epai ya mokonzi ; Ester, mwana mwasi ya Abiyaili, noko ya Maridoshe oyo abokolaki Ester, amemaki eloko mosusu te, bobele oyo Ege, kalaka ya lokumu, oyo baboma ye mokongo mpe azalaki na kobatela ndako ya basi ya mokonzi, ayebisaki ye. Mpe Ester azwaki ngolu na miso ya moto nyonso oyo azalaki komona ye.


— Bakalaka nyonso ya mokonzi mpe bato ya bituka nyonso ya mokili ya mokonzi bayebi ete, kolanda mobeko, moto nyonso, azala mobali to mwasi, oyo akoti na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi asengeli na kufa soki mokonzi abengisi ye te ; mpe mobeko yango ezali kaka moko mpo na bato nyonso. Nzokande soki mokonzi asemboli epai ya moto yango lingenda ya wolo ya bokonzi na ye, akotikala na bomoi. Ngai sik’oyo, eleki mikolo tuku misato wuta babenga ngai mpo na kokende epai ya mokonzi ; wuta mikolo wana, babenga ngai lisusu te.


Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo akelaki yo, oh Jakobi ; Ye oyo abongisaki yo, oh Isalaele : « Kobanga te, pamba te nasikolaki yo, nabengaki yo na kombo na yo, ozali ya ngai.


Mpo na bolingo ya Jakobi, mosali na Ngai, mpe Isalaele, moponami na Ngai, nabengi yo na kombo na yo, napesi yo kombo ya lokumu atako oyebi Ngai nanu te.


Soki mobali asepeli lisusu na mwasi yango te, akotika ye kokende na esika nyonso oyo alingi ; akoki te koteka ye to kokomisa ye lokola mowumbu, pamba te asambwisaki ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ