Ester 2:12 - Mokanda na Bomoi12 Kolanda ndenge ekatamaki, liboso ete elenge mwasi nyonso akende kokutana na mokonzi Kizerisesi, basengelaki kosala sanza zomi na mibale mpo na kobongisa ye mpo ete akoma kitoko : sanza motoba na mafuta ya mire, mpe sanza motoba mosusu na biloko ya monzele. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tika ete mokonzi atia bato kati na etuka moko na moko ya bokonzi na ye, mpo ete bamema na ndako ya basi oyo ezalaka na Size, engumba mokonzi, bilenge basi nyonso ya kitoko oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te. Tika ete bapesa bango na maboko ya Ege, kalaka ya lokumu mpo na mokonzi, oyo baboma ye mokongo mpe abatelaka basi ; mpe tika ete bapesa bango mafuta mpe malasi oyo ekomisaka bato kitoko.
Ester asepelisaki Ege mpe azwaki ngolu na miso na ye. Mbala moko, apesaki ye biloko ya monzele mpe bilei oyo asengeli kolia ; apesaki ye mpe basali sambo ya basi oyo aponaki kati na ndako ya mokonzi. Bongo atiaki ye elongo na basali na ye ya basi kati na shambre oyo elekaki kitoko kati na ndako ya basi ya mokonzi.