Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 1:19 - Mokanda na Bomoi

19 Yango wana, soki esepelisi mokonzi, tika ete mokonzi azwa mobeko oyo ekoki kobongwana te ; mpe tika ete mobeko yango ekomama kati na mibeko ya Persi mpe ya Medi : Vasti akoki lisusu te kotelema liboso ya mokonzi Kizerisesi ; mokonzi akopesa lokumu na ye ya mwasi ya mokonzi epai ya mwasi mosusu oyo azali malamu koleka ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 1:19
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Isalaele mobimba bayokaki ndenge mokonzi akataki likambo oyo, babangaki mokonzi mpo ete bamonaki ete azali solo na bwanya ya Nzambe mpo na kokata makambo na bosembo.


Kaka na mokolo ya lelo, basi ya bakalaka ya bato ya Persi mpe ya Medi, oyo bayoki sango ya ezaleli mabe ya mwasi ya mokonzi, bakozongisela bakalaka nyonso ya mokonzi kaka ndenge moko. Boye, kozanga na bango limemia mpe botosi ekoluka ete mibali na bango bakoma na kanda.


Toli oyo esepelisaki mokonzi elongo na bakalaka na ye. Mokonzi asalaki ndenge Memukani alobaki.


Sima na mikolo, kanda ya mokonzi Kizerisesi ekitaki ; akomaki kokanisa Vasti, makambo oyo asalaki mpe mobeko oyo azwaki na tina na ye.


Soki esepelisi mokonzi, tika ete abimisa mobeko ya koboma bango ; mpe ngai nakopesa na maboko ya bakalaka oyo batalaka makambo ya mokonzi mbongo ya bibende ya palata nkoto zomi mpo ete batia yango kati na libenga ya mokonzi.


Ester alobaki : — Soki esepelisi mokonzi, soki nazwi ngolu na miso ya mokonzi, soki akanisi ete ezali sembo mpo na ye kosala mpe soki asepeli na ngai, tika ete mobeko ekomama mpo na kokweyisa mikano ya Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya Agagi, oyo ebongisamaki mpe ekomamaki mpo na koboma Bayuda kati na bituka nyonso ya mokonzi.


Sik’oyo, koma mobeko mosusu na tina na Bayuda, na kombo ya mokonzi, ndenge okomona malamu mpe beta yango kashe ya mokonzi ; pamba te mokanda oyo ekomami na kombo ya mokonzi mpe babeti yango kashe na ye ekoki kobongwana te.


Boye, mokonzi apesaki mitindo ete bamema Daniele mpe babwaka ye kati na libulu ya bankosi. Mokonzi alobaki na Daniele : — Nzambe na yo, oyo osalelaka na molende, akobikisa yo !


Bongo Samuele alobaki na ye : — Na mokolo ya lelo, Yawe abotoli yo bokonzi kati na Isalaele mpe apesi yango epai ya moko kati na baninga na yo, oyo azali malamu koleka yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ