Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 1:12 - Mokanda na Bomoi

12 Kasi tango basoda oyo baboma bango mokongo bayebisaki Vasti, mwasi ya mokonzi, mitindo oyo mokonzi apesaki ; Vasti, mwasi ya mokonzi, aboyaki kokende. Mokonzi atombokaki makasi mpe apelaki na kanda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 1:12
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe alobaki na mwasi : « Nakobakisa pasi na zemi na yo ; okobota na pasi. Posa na yo ekomema yo epai ya mobali na yo, kasi ye akozala mokonzi na yo. »


Atindaki bango ete bamema liboso na ye Vasti, mwasi ya mokonzi ; bongo alata motole na ye ya bokonzi mpo ete alakisa kitoko na ye epai ya bato mpe epai ya bakalaka, pamba te azalaki penza kitoko.


Asololaki na bato na ye ya bwanya oyo bayebaka kososola tango, pamba te ezalaki momesano ete makambo ya mokonzi esengeli koya liboso ya bato nyonso ya bwanya, ba-oyo bayebi malamu makambo etali mibeko mpe bosembo, mpo ete basosola yango.


Mokonzi atelemaki na kanda makasi, atikaki vino na ye mpe abimaki na elanga ya ndako ya mokonzi. Tango Amani asosolaki ete mokonzi asili kokata etumbu na ye, atikalaki wana mpo na kobondela Ester, mwasi ya mokonzi, mpo ete abikisa bomoi na ye.


Nzembo ya Azafi. Oh Nzambe, mpo na nini kosundola biso mpo na tango nyonso ? Mpo na nini kongalisa kanda na Yo likolo ya etonga oyo oleisaka ?


Kino tango nini, Yawe, okokangela biso kanda ? Kino tango nini zuwa na Yo ekopela lokola moto ?


Tango Moyize apusanaki pembeni ya molako, amonaki ekeko ya mwana ngombe mpe bato bazali kobina ; asilikaki makasi, abwakaki bitando ya mabanga wuta na maboko na ye mpe apanzaki yango na biteni, na ebandeli ya ngomba.


Aron azongisaki : — Tika ete nkolo na ngai asilika te ! Oyebi bato, balingaka kaka kosala mabe.


Kanda ya mokonzi ezali lokola koganga ya nkosi, kasi bolamu na ye ezali lokola mamwe.


Somo oyo mokonzi apesaka ezali lokola koganga ya nkosi ; moto oyo apesaka ye kanda amilukelaka ye moko pasi.


Mbala moko, mokonzi asilikaki mpe atombokaki makasi ; apesaki mitindo ete baboma bato nyonso ya bwanya ya Babiloni.


Mokonzi Nabukodonozori atombokaki makasi mpe abengisaki Shadraki, Meshaki mpe Abedinego. Boye, bamemaki bango liboso ya mokonzi.


Nabukodonozori atombokelaki makasi Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, mpe akangelaki bango elongi ; apesaki mitindo ete bapelisa moto makasi penza mbala sambo koleka ndenge bapelisaka yango tango nyonso.


Nani akoki solo kotelema liboso na Ye soki asiliki ? Nani akoki solo kobika soki kanda na Ye epeli ? Mpo ete kanda na Ye epanzanaka lokola moto, bongo mabanga ebukanaka liboso na Ye.


Basi, botosaka mibali na bino ndenge botosaka Nkolo.


Kasi lokola Lingomba etosaka Klisto, tika ete basi mpe batosaka mibali na bango na makambo nyonso.


Yawe akotia ye pembeni kati na bikolo nyonso ya Isalaele, akokaba ye na pasi ndenge ezali bilakeli mabe nyonso ya boyokani oyo ekomama kati na buku ya Mobeko.


Bino mpe basi, botosaka mibali na bino mpo ete, soki ezali na ndambo ya mibali oyo bandimaka Liloba na Nzambe te, bakoma kondima na nzela ya bizaleli malamu ya basi na bango, ata soki bateyi bango Liloba te,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ