Esidrasi 7:9 - Mokanda na Bomoi9 Alongwaki na Babiloni na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso mpe akomaki na Yelusalemi na mokolo ya liboso ya sanza ya mitano, pamba te loboko ya ngolu ya Nzambe na ye ezalaki likolo na ye, အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nayokaki soni mpo na kosenga epai ya mokonzi basoda mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, mpo na kobatela biso na nzela liboso ya banguna na biso ; pamba te tolobaki na mokonzi : « Loboko ya ngolu ya Nzambe na biso ezali likolo ya moto nyonso oyo alukaka Ye, kasi kanda makasi na Ye ekitelaka bato nyonso oyo basundolaka Ye. »
mpe tika ete nazwa mokanda mpo na Azafi, mokengeli ya zamba ya mokonzi, mpo ete apesa ngai mabaya ya motondo mpo na bikuke ya engumba batonga makasi pene ya Tempelo, mpo na mir ya engumba mpe mpo na ndako oyo nakovanda. Lokola loboko ya ngolu ya Nzambe na ngai ezalaki likolo na ngai, mokonzi apesaki ngai mikanda yango.