Tika ete mokonzi ayeba ete Bayuda oyo bawutaki epai na yo bakomi kati na biso, na Yelusalemi ; bazali kotonga engumba ya batomboki mpe ya bato ya mobulu, bazali kotonga bamir mpe kobongisa lisusu miboko.
Tika ete mokonzi ayeba ete tokendeki na etuka ya Yuda kino na Tempelo ya Nzambe Monene. Bato bazali kotonga yango na mabanga bakata mpe bazali kotia mabaya na likolo ya bamir. Mosala yango ezali kotambola malamu mpe kokende noki kati na maboko na bango.