Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Esidrasi 5:3 - Mokanda na Bomoi

3 Mbala moko, Tatinayi, moyangeli ya etuka oyo ezalaki na ngambo ya weste ya ebale Efrate, mpe Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala batunaki bango : — Nani apesi bino nzela ya kotonga lisusu Tempelo oyo mpe ya kotelemisa lisusu mir oyo ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Esidrasi 5:3
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete moto nyonso oyo, kati na bino, azali na molongo ya bato ya Yawe akende na Yelusalemi kati na Yuda mpo na kotonga Tempelo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo azali Nzambe kati na Yelusalemi !


Tika ete mokonzi ayeba ete Bayuda oyo bawutaki epai na yo bakomi kati na biso, na Yelusalemi ; bazali kotonga engumba ya batomboki mpe ya bato ya mobulu, bazali kotonga bamir mpe kobongisa lisusu miboko.


« Moyangeli Rewumi mpe Shimishayi, mokomi mikanda, elongo na baninga na bango, basambisi mpe bakambi ya bato ya Dini, ya Arifarisataki, ya Taripeli, ya Afarasi, ya Ereki, ya Babiloni, ya Size, ya Deya, ya Elami,


Tala mokanda oyo Tatinayi, moyangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala, bakambi ya bituka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, batindelaki mokonzi Dariusi.


Totunaki bakambi na bango motuna oyo : ‹ Nani apesi bino nzela ya kotonga lisusu Tempelo oyo mpe ya kotelemisa lisusu bamir ? ›


Boye, Tatinayi, moyangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, mpe Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala batosaki mitindo ya mokonzi Dariusi na lombangu mpe na ndenge ezaleli.


Sik’oyo, Tatinayi, moyangeli ya etuka oyo ezali na ngambo ya weste ya ebale Efrate, Shetari-Bozinayi mpe bino baninga na bango ya mosala, bakambi ya etuka, bozala mosika ya likambo oyo.


Sik’oyo, ngai, mokonzi Aritakizerisesi, napesi mitindo epai ya babateli bomengo nyonso ya mokonzi kati na etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, ete bopesa na lombangu eloko nyonso oyo Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko ya Nzambe ya Likolo, akosenga bino


Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, na mokolo ya liboso ya sanza ya motoba, Yawe alobaki na nzela ya Mosakoli Aje liloba oyo epai ya Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda ; epai ya Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe :


Yesu akotaki na lopango ya Tempelo ; mpe wana azalaki koteya, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bapusanaki pene na Ye. Batunaki : — Na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo ? Nani apesi yo bokonzi yango ?


Bamemaki Petelo mpe Yoane liboso na bango, mpe bakomaki kotuna bango mituna : — Bozali kosala makambo oyo na nguya nini to na kombo ya nani ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ