Esidrasi 5:2 - Mokanda na Bomoi2 Bongo, Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mpe Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, bazongelaki mosala ya kotonga lisusu Tempelo ya Nzambe kati na Yelusalemi. Mpe basakoli ya Nzambe bazalaki elongo na bango mpo na kosunga bango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Na sanza ya mibale ya mobu ya mibale sima na bango kokoma na Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi, Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli ; Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, elongo na bandeko na bango mosusu, Banganga-Nzambe, Balevi mpe bato nyonso oyo bazongaki na Yelusalemi wuta na bowumbu, babandaki misala ya kotonga. Baponaki Balevi oyo bazalaki na mibu kobanda tuku mibale mpe komata mpo ete balandela misala ya kotonga Tempelo ya Yawe.
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bino ba-oyo, na mikolo oyo, bozali koyoka maloba kaka oyo basakoli balobaki, lokola bazalaki awa na tango miboko ya Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezalaki kotongama, boyika mpiko mpe bolendisa maboko na bino mpo na kotonga Tempelo oyo ya Yawe.