Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Esidrasi 4:9 - Mokanda na Bomoi

9 « Moyangeli Rewumi mpe Shimishayi, mokomi mikanda, elongo na baninga na bango, basambisi mpe bakambi ya bato ya Dini, ya Arifarisataki, ya Taripeli, ya Afarasi, ya Ereki, ya Babiloni, ya Size, ya Deya, ya Elami,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Esidrasi 4:9
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bana mibali ya Semi : Elami, Asuri, Aripakishadi, Ludi mpe Arami.


Mokonzi ya Asiri amemaki bato wuta na bingumba ya Babiloni, ya Kuti, ya Ava, ya Amati mpe ya Sefarivayimi ; mpe atiaki bango na Samari, na esika ya bana ya Isalaele. Bato yango bazwaki Samari mpe bavandaki kati na bingumba na yango.


Moyangeli Rewumi mpe Shimishayi, mokomi mikanda na ye, bakomelaki mokonzi Aritakizerisesi mokanda oyo na tina na Yelusalemi :


Mbala moko, Tatinayi, moyangeli ya etuka oyo ezalaki na ngambo ya weste ya ebale Efrate, mpe Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala batunaki bango : — Nani apesi bino nzela ya kotonga lisusu Tempelo oyo mpe ya kotelemisa lisusu mir oyo ?


Tala mokanda oyo Tatinayi, moyangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala, bakambi ya bituka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, batindelaki mokonzi Dariusi.


Sik’oyo, Tatinayi, moyangeli ya etuka oyo ezali na ngambo ya weste ya ebale Efrate, Shetari-Bozinayi mpe bino baninga na bango ya mosala, bakambi ya etuka, bozala mosika ya likambo oyo.


Bango nyonso basanganaki mpo na koya kobundisa Yelusalemi mpe kotia mobulu kati na yango.


Na tango wana, Kizerisesi akendeki kovanda na kiti na ye ya bokonzi kuna na Size, engumba mokonzi batonga makasi.


Tika ete mokonzi atia bato kati na etuka moko na moko ya bokonzi na ye, mpo ete bamema na ndako ya basi oyo ezalaka na Size, engumba mokonzi, bilenge basi nyonso ya kitoko oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te. Tika ete bapesa bango na maboko ya Ege, kalaka ya lokumu mpo na mokonzi, oyo baboma ye mokongo mpe abatelaka basi ; mpe tika ete bapesa bango mafuta mpe malasi oyo ekomisaka bato kitoko.


Namonaki emoniseli moko ya somo : Moteki baninga azali koteka baninga, mobebisi azali kobebisa. Elami, bundisa bango ! Medi, zingela bango ! Nakosukisa kolela nyonso oyo ayeisaki na bato.


bakonzi nyonso ya Zimiri, ya Elami mpe ya Medi ;


Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na Elami, na ebandeli ya bokonzi ya Sedesiasi, mokonzi ya Yuda :


Mokili ya Elami ezali kuna elongo na mampinga na yango nyonso, zingazinga ya bakunda na yango ; bato na yango nyonso bakweyaki, bakufaki na mopanga. Bato nyonso oyo bazalaki koyeisa somo kati na mokili ya bato ya mokili yango basili kokita elongo na bato oyo bakatama ngenga te, na mokili ya bakufi ; bakoyoka soni bango moko elongo na bato oyo bakitaka na libulu.


Kati na emoniseli yango, nazalaki kotala mpe namimonaki lokola kati na Size, engumba batonga makasi, kati na etuka ya Elami ; kati na emoniseli yango kaka, namimonaki lisusu lokola natelemi pembeni ya moluka Ulayi.


Bato ya Parte, ya Mede mpe ya Elami, bavandi ya Mezopotami, ya Yuda, ya Kapadose, ya Ponti mpe ya Azia,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ