Atako bazalaki koyoka bato oyo bazalaki pembeni na bango somo, batongaki etumbelo na likolo ya miboko na yango ya kala mpe babonzaki wana mpo na Yawe mbeka ya kotumba ya tongo mpe ya pokwa.
bapesaki bapesi toli kanyaka mpo ete batelemela mpe babebisa mabongisi na bango na nzela ya batoli ya mabe, na mikolo nyonso ya Sirisi kino na oyo ya Dariusi, bango mibale bakonzi ya Persi.
Bakalaka balobaki na mokonzi : — Moto oyo asengeli kokufa ! Maloba na ye ezali kolembisa basoda mpe bato oyo batikali kati na engumba oyo ; azali koluka bolamu ya bato oyo te, kasi azali nde koluka mabe na bango.
Kasi mokambi ya mokili ya Persi atelemelaki ngai mikolo tuku mibale na moko. Boye, Misheli, moko kati na bakonzi ya ba-anjelu, ayaki kosunga ngai, pamba te bakonzi ya Persi bakangaki ngai kuna.
Boye, elobaki : — Boni, oyebi mpo na nini nayei epai na yo ? Sik’oyo, nakomi pene ya kozonga mpo na kobundisa mokambi ya Persi ; mpe tango ngai nakokende, mokambi ya Grese akoya ;