Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Esidrasi 4:3 - Mokanda na Bomoi

3 Kasi Zorobabeli, Jozue mpe bakambi mosusu ya mabota ya Isalaele bazongisaki : — Bokotonga te elongo na biso Tempelo ya Yawe, Nzambe na biso ; tokotonga yango biso moko mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, kolanda mitindo ya Sirisi, mokonzi ya Persi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Esidrasi 4:3
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mobu ya liboso ya Sirisi, mokonzi ya Persi, Yawe alamusaki molimo ya Sirisi, mokonzi ya Persi, mpo na kokokisa liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi mpo ete asakola mpe akoma boye kati na mokili na ye mobimba :


Na mobu ya liboso ya Sirisi, mokonzi ya Persi, Yawe alamusaki molimo ya Sirisi, mokonzi ya Persi, mpo na kokokisa liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi, mpo ete asakola mpe akoma boye kati na mokili na ye mobimba :


« Tala makambo oyo Sirisi, mokonzi ya Persi, alobi : ‹ Yawe, Nzambe ya Likolo, apesi ngai babokonzi nyonso ya mabele mpe mokumba ya kotongela Ye Tempelo, na Yelusalemi kati na Yuda.


Tika ete moto nyonso oyo, kati na bino, azali na molongo ya bato ya Yawe akende na Yelusalemi kati na Yuda mpo na kotonga Tempelo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo azali Nzambe kati na Yelusalemi !


Na sanza ya mibale ya mobu ya mibale sima na bango kokoma na Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi, Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli ; Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, elongo na bandeko na bango mosusu, Banganga-Nzambe, Balevi mpe bato nyonso oyo bazongaki na Yelusalemi wuta na bowumbu, babandaki misala ya kotonga. Baponaki Balevi oyo bazalaki na mibu kobanda tuku mibale mpe komata mpo ete balandela misala ya kotonga Tempelo ya Yawe.


Nazongiselaki bango : — Nzambe ya Likolo akolongisa biso solo. Biso bawumbu na Ye, tokotelema mpe tokotonga. Kasi bino, bozali ata na eteni moko te ya mabele to na bokonzi moko te kati na Yelusalemi, mpe moto moko te akozala kuna na ekaniseli malamu mpo na bino !


Nalobi na tina na Sirisi : ‹ Azali mobateli oyo naponi, akokokisa makambo nyonso oyo esepelisaka Ngai. Akoloba na tina na Yelusalemi : ‘ Tika ete etongama lisusu, ’ mpe na tina na Tempelo : ‘ Tika ete batonga miboko na yango. ’ › »


Mpo na bolingo ya Jakobi, mosali na Ngai, mpe Isalaele, moponami na Ngai, nabengi yo na kombo na yo, napesi yo kombo ya lokumu atako oyebi Ngai nanu te.


Nazali kotinda bino lokola bameme kati na bambwa ya zamba ; boye, bozala na ekenge lokola banyoka, mpe na boboto lokola bibenga.


Kasi mwasi yango alobaki : — Ebandi ndenge nini yo oyo ozali Moyuda osenga ngai, mwasi ya engumba Samari, mayi mpo ete omela ? —Pamba te Bayuda bazalaki koyokana te na bato ya Samari.—


Solo, ozali na libula te to na makoki te kati na lotomo oyo, pamba te motema na yo ezali sembo te liboso ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ