Esidrasi 4:2 - Mokanda na Bomoi2 bayaki epai ya Zorobabeli mpe bakambi ya mabota ; balobaki na bango : — Botika ete tosunga bino na mosala ya kotonga Tempelo oyo, pamba te biso mpe tolukaka Nzambe na bino mpe tobonzelaka Ye mbeka wuta na tango ya Esari-Adoni, mokonzi ya Asiri, oyo amemaki biso awa. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nzokande, kati na Banganga-Nzambe oyo ya mikolo, kati na Balevi oyo ya mikolo mpe kati na bakambi ya mabota, oyo ya mikolo, ezalaki na ebele oyo bamonaki Tempelo ya liboso ; bongo bazalaki kolela na mongongo makasi wana bazalaki kotia miboko ya Tempelo ya sika na miso na bango. Mpe kaka na tango yango, ebele ya bato mosusu bazalaki kosepela na koganga makasi mpe na kobeta milolo nzela moko na maboko.
Sik’oyo, Oh Nzambe na biso, Nzambe Monene, Nzambe na nguya mpe ya somo, Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo, komona te lokola likambo ya pamba na miso na Yo pasi oyo ekomeli biso, bakonzi na biso, bakambi na biso, Banganga-Nzambe na biso, basakoli na biso, batata na biso mpe bato na Yo nyonso, wuta na tango ya bakonzi ya Asiri kino na mokolo ya lelo.