Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Esidrasi 1:9 - Mokanda na Bomoi

9 Tala biloko yango mpe motango na yango : bakopo ya wolo ezalaki tuku misato ; bakopo ya palata ezalaki nkoto moko ; basani ya mbele ya palata ezalaki tuku mibale na libwa ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Esidrasi 1:9
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokola mama akotisaki makanisi mabe kati na mwana, mwana mwasi alobaki na Erode : « Pesa ngai awa, na sani, moto ya Yoane Mobatisi. »


bakopo ya wolo tuku mibale oyo ezali na motuya ya mbongo ya bibende ya wolo nkoto moko mpe biloko mibale ya kitoko basala na bronze oyo engalaka lokola wolo.


Tango basilisaki, bazongisaki epai ya mokonzi mpe Yeoyada mbongo oyo etikalaki. Na mbongo yango, basalaki bisalelo mpo na Tempelo ya Yawe, mpo na losambo, mpo na bambeka ya kotumba, bakopo, mpe bisalelo mosusu ya wolo mpe ya palata. Na mikolo nyonso ya bomoi ya Nganga-Nzambe Yeoyada, bazalaki kobonza bambeka ya kotumba kati na Tempelo ya Yawe.


Urami asalaki basani ya kotia putulu, bapawu mpe bakopo mpo na kosopela makila. Urami asilisaki mosala nyonso oyo mokonzi Salomo atindaki ye kosala mpo na Tempelo ya Nzambe :


Asalaki bamesa zomi mpe atiaki yango kati na eteni oyo eleki monene : mitano na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mitano na ngambo ya loboko ya mwasi. Asalaki lisusu bakopo nkama moko ya wolo mpo na kosopela makila na likolo ya etumbelo.


basani ya minene, bambeli, bakopo mpo na kosopela makila, bakeni, bambabola ya wolo ya peto, elongo na bikangelo ya wolo mpo na bikuke ya kati ya Tempelo, Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpe mpo na bikuke ya esika oyo bato nyonso bavandaka, na ekotelo ya Tempelo.


Likabo na ye ezalaki : etando ya palata ya kilo moko na ndambo, mbeki moko ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale ezalaki ya kotonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo ;


basani ya wolo ezalaki tuku misato ; basani minene ya palata ezalaki nkama minei na zomi ; biloko mosusu ezalaki nkoto moko.


Napesaki bango kilo nkoto tuku mibale ya palata, kilo nkoto misato ya bisalelo basala na palata, kilo nkoto misato ya wolo,


Banganga-Nzambe mpe Balevi bayambaki palata, wolo mpe bisalelo ya bule oyo bamekaki kilo na yango, mpo na komema yango na Ndako ya Nzambe na biso, na Yelusalemi.


Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi akamataki lisusu biloko nyonso ya wolo mpe ya palata : bambabola mpe basani ya kobwakela mayi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ