Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Esidrasi 1:3 - Mokanda na Bomoi

3 Tika ete moto nyonso oyo, kati na bino, azali na molongo ya bato ya Yawe akende na Yelusalemi kati na Yuda mpo na kotonga Tempelo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo azali Nzambe kati na Yelusalemi !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Esidrasi 1:3
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bato nyonso bamonaki bongo, bakweyaki bilongi na se mpe bagangaki : — Solo, Yawe nde azali Nzambe ; Yawe nde azali Nzambe !


mpe asambelaki : « Yawe, Nzambe ya Isalaele, ezali na nzambe moko te oyo akokani na Yo, ezala kuna na likolo to awa na se ! Obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo mpo na basali na Yo, oyo batambolaka kolanda mokano na Yo na motema na bango mobimba.


Davidi alobaki lisusu na Salomo, mwana na ye ya mobali : — Yika mpiko mpe sala mosala ! Kobanga te, kozala mpe na somo te ; pamba te Yawe, Nzambe na ngai, azali elongo na yo ; akotika yo te mpe akobwaka yo te kino mosala nyonso ya Tempelo ya Yawe ekosila.


Tika ete bavandi ya bisika nyonso oyo bato ya Yuda bazali bapesa bango, mpo na Ndako ya Nzambe oyo ezali na Yelusalemi, makabo oyo : palata, wolo, bibwele, biloko ya ndenge na ndenge mpe makabo oyo bakati bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango. › »


Kasi Zorobabeli, Jozue mpe bakambi mosusu ya mabota ya Isalaele bazongisaki : — Bokotonga te elongo na biso Tempelo ya Yawe, Nzambe na biso ; tokotonga yango biso moko mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, kolanda mitindo ya Sirisi, mokonzi ya Persi.


Nzokande, na mobu ya liboso ya bokonzi na ye lokola mokonzi ya Babiloni, Sirisi apesaki mitindo ya kotonga lisusu Ndako oyo ya Nzambe,


Mbala moko, Tatinayi, moyangeli ya etuka oyo ezalaki na ngambo ya weste ya ebale Efrate, mpe Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala batunaki bango : — Nani apesi bino nzela ya kotonga lisusu Tempelo oyo mpe ya kotelemisa lisusu mir oyo ?


Botika ete misala ya kotonga lisusu Ndako oyo ya Nzambe ekoba. Tika ete moyangeli mpe bakambi ya Bayuda batonga yango lisusu na esika na yango ya kala.


Pamba te Yawe aponaki Siona, asepelaki kokomisa yango Esika na Ye ya kovanda :


Tika ete soni mpe somo makasi elata bango mpo na libela ! Tika ete bakufa na soni !


« Oh Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele ! Yo oyo ovandi likolo ya basheribe, ozali Nzambe kaka moko na likolo ya mikili nyonso ya mabele ; Yo nde osala Likolo mpe mabele.


Nalobi na tina na Sirisi : ‹ Azali mobateli oyo naponi, akokokisa makambo nyonso oyo esepelisaka Ngai. Akoloba na tina na Yelusalemi : ‘ Tika ete etongama lisusu, ’ mpe na tina na Tempelo : ‘ Tika ete batonga miboko na yango. ’ › »


Nazali Yawe, mosusu azali te ; Nzambe mosusu azali te, soki Ngai te. Nalatisi yo mokaba na loketo atako oyebi Ngai nanu te ;


Kasi Yawe azali Nzambe ya solo, Nzambe na bomoi mpe Mokonzi ya seko. Soki asiliki, mokili eninganaka, bikolo ekokoka te kotelema liboso ya kanda na Ye.


Mokonzi alobaki na Daniele : « Solo, Nzambe na bino azali Nzambe ya banzambe, Nkolo ya bakonzi mpe Molakisi mabombami, mpo ete okoki kolakisa mabombami oyo ! »


Bongo, mokonzi Dariusi akomelaki bato ya bikolo nyonso mpe ya nkota nyonso oyo bazalaki kovanda na mokili mobimba : Natombeli bino kimia monene !


bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.


Atindaki Liloba na Ye epai ya bana ya Isalaele mpo na kosakola Sango Malamu ya kimia, na nzela ya Yesu-Klisto oyo azali Nkolo ya bato nyonso.


Pamba te Libanga na bango azali lokola libanga na biso te ; bango moko banguna na biso bayebi yango.


Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ