Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Esidrasi 1:2 - Mokanda na Bomoi

2 « Tala makambo oyo Sirisi, mokonzi ya Persi, alobi : ‹ Yawe, Nzambe ya Likolo, apesi ngai babokonzi nyonso ya mabele mpe mokumba ya kotongela Ye Tempelo, na Yelusalemi kati na Yuda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Esidrasi 1:2
34 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi, boni, Nzambe akoki solo kovanda na mokili ? Soki kutu Likolo mpe Likolo oyo eleki likolo ekoki kokoka Yo te, bongo ekozala boni mpo na Tempelo oyo natongi !


Nazali kotindela yo sik’oyo Urami-Abi ; azali penza moto moko ya mayele oyo ayebi mosala malamu.


Bongo bakambi ya mabota ya Yuda mpe ya Benjame, Banganga-Nzambe mpe Balevi, elongo na moto nyonso oyo Nzambe atutaki motema babongamaki mpo na kokende kotonga Tempelo ya Yawe, na Yelusalemi.


Bapesaki mbongo epai ya batongi ndako mpe epai ya basharipantie ; bongo bapesaki lisusu bilei, masanga mpe mafuta epai ya bato ya Sidoni mpe ya Tiri mpo ete bamema, na nzela ya ebale monene, banzete ya sedele longwa na Libani kino na Jafa, na ndingisa ya Sirisi, mokonzi ya Persi.


Kasi Zorobabeli, Jozue mpe bakambi mosusu ya mabota ya Isalaele bazongisaki : — Bokotonga te elongo na biso Tempelo ya Yawe, Nzambe na biso ; tokotonga yango biso moko mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, kolanda mitindo ya Sirisi, mokonzi ya Persi.


Alobaki na ye : ‘ Kamata biloko oyo mpe kende kotia yango kati na Tempelo ya Yelusalemi ; mpe tika ete Tempelo ya Nzambe etongama lisusu na esika na yango ya kala. ’


mpo ete bakoka kobonzaka mbeka ya solo kitoko epai ya Nzambe ya Likolo, mpe mpo ete basambelaka mpo na bomoi malamu ya mokonzi elongo na bana na ye ya mibali.


Na mobu ya liboso ya mokonzi Sirisi, mokonzi Sirisi azwaki mokano na tina na Tempelo ya Nzambe kati na Yelusalemi : Tempelo ya Nzambe esengeli kotongama lisusu mpo ete ezala esika ya kobonza mbeka ; boye esengeli kozongisa miboko na yango. Tempelo ekozala na bametele pene tuku misato na bosanda mpe bametele pene tuku misato na mokuse.


« Aritakizerisesi, mokonzi ya bakonzi ; Epai ya Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko ya Nzambe ya Likolo : Mbote na yo !


Tango kaka nayokaki makambo oyo nyonso, namivandisaki na mabele mpe nakomaki kolela. Nasalaki mikolo mwa mingi ya matanga, na kokila bilei mpe na kosambela Nzambe ya Likolo.


Nabondelaki : « Oh Yawe, Nzambe ya Likolo, Nzambe monene mpe Nzambe ya somo ! Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo epai ya bato oyo balingaka Yo mpe batosaka mibeko na Yo,


Bosanzola Nzambe ya likolo ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !


Yawe, osalelaki mboka na Yo bolamu, ozongisaki bato ya Jakobi, oyo bazalaki na bowumbu,


Kati na loboko na Yawe, motema ya mokonzi ezalaka lokola moluka oyo atindaka esika nyonso oyo alingi.


Nani abimisaki wuta na este moto oyo bosembo ezali kobenga na makolo na yango, oyo elonga elandaka matambe na Ye ? Nani akabaki bikolo na maboko na Ye mpe atiaki bakonzi na se ya bokonzi na Ye ? Mopanga na Ye ekomisaki bango putulu, mpe tolotolo na Ye ekomisaki bango lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe ememaka.


Nakokisi maloba ya mosali na Ngai mpe nalongisi mabongisi ya bamemi sango na Ngai. Natatoli na tina na Yelusalemi : ‹ Bato bakovanda kati na yo ; › na tina na bingumba ya Yuda : ‹ Ekotongama lisusu, › mpe na tina na mabanga na yango oyo ebukana : ‹ Nakobongisa yango lisusu. ›


Nalobi na tina na Sirisi : ‹ Azali mobateli oyo naponi, akokokisa makambo nyonso oyo esepelisaka Ngai. Akoloba na tina na Yelusalemi : ‘ Tika ete etongama lisusu, ’ mpe na tina na Tempelo : ‘ Tika ete batonga miboko na yango. ’ › »


« Tala liloba oyo Yawe alobi epai ya Sirisi, mopakolami na Ye, oyo Yawe asimbi loboko na ye ya mobali mpo na kokweyisa bikolo nyonso liboso na ye mpe kolongola mikaba wuta na baloketo ya bakonzi, mpo na kofungola bikuke liboso na ye mpo ete bikuke yango ekangama te :


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ezali Kiti na Ngai ya bokonzi, mpe mabele ezali enyatelo makolo na Ngai. Ndako ya ndenge nini penza bokoki kotongela Ngai ? Esika ya bopemi ya ndenge nini penza bokoki kobongisela Ngai ?


Tala maloba oyo bokoloba na bango : « Banzambe oyo esala te likolo mpe mabele ekolimwa na mabele mpe na se ya likolo. »


Ngai nde nasalaki mabele, nasalaki bato mpe banyama nyonso oyo bazali kati na yango, na nguya monene na Ngai mpe na loboko na Ngai oyo esembolama. Napesaka mabele yango epai ya moto nyonso oyo Ngai nalingi.


Kasi tala liloba oyo Yawe alobi : « Tango mibu tuku sambo ekokoka mpo na Babiloni, nakoya epai na bino mpe nakokokisa elaka na Ngai ya ngolu mpo na kozongisa bino na esika oyo.


Mpe Daniele awumelaki kosala kati na ndako ya mokonzi kino na mobu ya liboso ya mokonzi Sirisi.


Ezali Ye nde abongolaka tango mpe makambo, alongolaka bakonzi mpe atombolaka bakonzi, apesaka bwanya epai ya bato ya bwanya mpe boyebi epai ya bato ya mayele.


kasi kati na Lola, ezali na Nzambe moko oyo alakisaka mabombami ; mpe alakisi mokonzi Nabukodonozori makambo oyo ekosalema na mikolo oyo ekoya. Tala ndoto oyo olotaki mpe bimoniseli oyo ozwaki tango ozalaki ya kolala na mbeto na yo :


Makambo wana nyonso ekokokisama mpo na mokonzi Nabukodonozori.


Bato nyonso ya mokili bazali pamba na miso na Ye ; asalaka makambo oyo alingi na mampinga nyonso ya likolo mpe na bavandi ya mabele. Moto moko te azali na makoki ya kozongisa loboko na Ye sima.


Otomboli mapeka na yo mpo na kotelemela Yawe ya Lola, oyeisi epai na yo bakopo oyo ewutaki na Tempelo na Ye ; bongo yo, bato na yo ya lokumu, basi na yo mpe bamakangu na yo, bomeli na yango masanga ya vino mpe bokumisi banzambe ya palata mpe ya wolo, ya bronze mpe ya ebende, ya nzete mpe ya mabanga, oyo emonaka te, eyokaka te mpe esosolaka te. Kasi opesi lokumu te na Nzambe oyo, kati na loboko na Ye, asimbi bomoi mpe banzela na yo nyonso.


Mokonzi apesaki mitindo ete bamema bato oyo bafundaki Daniele mpe babwaka bango elongo na basi mpe bana na bango kati na libulu ya bankosi. Liboso ete bamikomela na se ya libulu, bankosi epumbwelaki bango mpe ebukaki bango mikuwa nyonso.


Yona azongisaki : — Nazali Mo-Ebre, nasambelaka Yawe, Nzambe ya Lola, oyo akela bibale mpe mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ