Jewu akendeki na Jizireyeli. Tango Jezabeli ayokaki bongo, atiaki monzele na elongi na ye, abongisaki suki na ye mpe apusanaki pene ya lininisa mpo na kotala libanda.
Na esika ya solo kitoko ya malasi, ekozala nde solo mabe ; na esika ya mokaba, ekozela nde singa ; na esika ya suki bakanga kitoko na moto, ekozala nde libandi ; na esika ya bilamba ya talo, ekozala nde bilamba ya saki ; na esika ya elongi kitoko, ekozala nde elongi mabe.
Ekolo moko ya bapaya ebundisi mokili na Ngai, ezali na nguya makasi mpe bakokoka te kotanga motango ya bato na yango. Minu na yango ezali lokola minu ya nkosi ya mobali, mpe mbanga na yango, lokola mbanga ya nkosi ya mwasi.
Nalingi mpe ete basi balataka na ndenge oyo ebongi, oyo ekoki te kobetisa bato mabaku, mpe na ndenge ya lolendo te ; bakangisa suki te mpe balata te ezala biloko ya wolo, mayaka to bilamba ya talo makasi,