Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 9:7 - Mokanda na Bomoi

7 Mankoko yango ezalaki lokola bampunda oyo babongisi mpo na etumba. Na mito na yango, ezalaki na biloko moko lokola mitole ya wolo, mpe bilongi na yango ezalaki lokola bilongi ya bato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 9:7
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nyama ya liboso ezalaki lokola nkosi mpe ezalaki na mapapu lokola mpongo. Wana nazalaki kotala, balongolaki yango mapapu, batombolaki yango longwa na mabele mpo ete etelema na makolo mibale lokola moto ; mpe bapesaki yango motema ya moto.


Wana nazali kotala malamu maseke, namonaki liseke mosusu ya moke kobima kati na maseke wana ; bongo maseke misato kati na maseke ya liboso elongwaki liboso ya liseke ya moke oyo ezalaki na miso lokola ya moto mpe monoko oyo ezalaki koloba na lolendo.


Bakengeli na yo bazali lokola mankoko, bakonzi ya basoda na yo bazali lokola maboke ya mabanki oyo eyaka kovanda na bamir ya lopango na tango ya malili ; kasi soki kaka moyi ebimi, yango nyonso epanzani, mpe moto moko te ayebaka esika yango ekendaka.


Natalaki mpe namonaki liboso na ngai mpunda moko ya pembe. Motambolisi na yango asimbaki tolotolo. Bapesaki ye motole, bongo abimaki lokola molongi mpe mpo ete azala molongi.


Wuta na milinga yango, mankoko ebimaki, epanzanaki na mokili mpe epesamelaki bokonzi lokola oyo ya bakoto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ