Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 9:3 - Mokanda na Bomoi

3 Wuta na milinga yango, mankoko ebimaki, epanzanaki na mokili mpe epesamelaki bokonzi lokola oyo ya bakoto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 9:3
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai, nakoyeisa yango lisusu makasi koleka ; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende. »


Kobanda lelo, soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka ; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende. »


alandaki toli ya bilenge mibali mpe ayebisaki bango : — Soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka ; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende.


Oh bikolo, bakolokota bomengo na bino ya bitumba ndenge balokotaka mankoko ; bakosopanela yango na elulu ndenge mabanki esalaka.


Bongo yo, mwana na moto, kobanga bango te mpe kobanga maloba na bango te, atako banzube mpe basende ezingeli yo mpe ozali kovanda elongo na koto. Kozala na somo ya makambo oyo bazali koloba te mpe kolenga liboso na bango te atako bazali batomboki.


Matiti oyo mampinga ya mabanki etiki, mabanki minene elie yango ; oyo mabanki minene etiki, mabanki mike elie yango ; oyo mabanki mike etiki, mabanki mosusu elie yango.


Nakozongisela bino mibu oyo mampinga minene ya mankoko, ya makelele, ya mabanki minene mpe ya bambinzo eliaki : mampinga minene na Ngai oyo natindaki mpo na kobundisa bino.


Kuna nde moto ekoya kozikisa yo, mopanga ekoya koboma yo mpe kosilisa yo lokola mabanki. Tika ete bato na yo bakoma ebele lokola mabanki, bakoma lisusu ebele makasi lokola mankoko.


Bakengeli na yo bazali lokola mankoko, bakonzi ya basoda na yo bazali lokola maboke ya mabanki oyo eyaka kovanda na bamir ya lopango na tango ya malili ; kasi soki kaka moyi ebimi, yango nyonso epanzani, mpe moto moko te ayebaka esika yango ekendaka.


Napesi bino bokonzi ya konyata banyoka mpe bakoto, mpe ya kolonga nguya nyonso ya monguna, mpe eloko moko te ekosala bino mabe.


oyo akambaki yo na esobe ya monene mpe ya somo, na bitando ekawuka mpe ezanga mayi, etando etonda na banyoka ya ngenge mpe na koto mpe abimiselaki yo mayi ya komela wuta na libanga moko ya makasi.


Esengelaki konyokola bango basanza mitano, kasi esengelaki te koboma bango. Pasi oyo ezalaki kopesa ekokanaki na oyo moto ayokaka soki koto eswi ye.


Mankoko yango ezalaki lokola bampunda oyo babongisi mpo na etumba. Na mito na yango, ezalaki na biloko moko lokola mitole ya wolo, mpe bilongi na yango ezalaki lokola bilongi ya bato.


Bato ya Madiani, ya Amaleki mpe ya ngambo ya este bazalaki ya kopanzana kati na lubwaku, ebele lokola mabanki. Bashamo na bango ezalaki ebele koleka zelo ya ebale.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ