Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 9:18 - Mokanda na Bomoi

18 Tala bapasi misato oyo ezalaki kobima na minoko ya bampunda : moto, milinga mpe sofolo. Ebomaki eteni moko kati na biteni misato ya bato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 9:18
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Anjelu ya misato abetaki kelelo ; mpe na mbala moko, monzoto moko ya monene oyo ezali kopela lokola mwinda monene ekweyelaki, longwa na likolo, eteni moko kati na biteni misato ya bibale mpe bitima ya mayi.


Kombo ya monzoto yango ezali : Bololo. Eteni moko kati na biteni misato ya bamayi ekomaki bololo, mpe bato ebele bakufaki likolo na bamayi mpo ete ekomaki bololo.


Anjelu ya minei abetaki kelelo ; mpe na mbala moko, eteni moko kati na biteni misato ya moyi, ya sanza mpe ya minzoto ebebaki. Na bongo, eteni moko kati na biteni misato ya kongenga na yango ekomaki molili. Boye eteni moko kati na biteni misato ya mokolo mpe ya butu ezangaki pole.


Anjelu ya liboso abetaki kelelo ; mpe, mbala moko, mvula ya mabanga mike elongo na moto esangana na makila ebwakamaki na mabele. Bongo biloko oyo ezikaki : eteni moko kati na biteni misato ya mabele, eteni moko kati na biteni misato ya banzete, mpe matiti nyonso ya mobesu.


Anjelu ya mibale abetaki kelelo ; mpe na mbala moko, eloko moko lokola ngomba monene oyo ezali kopela moto ebwakamaki na ebale monene. Eteni moko kati na biteni misato ya ebale monene ekomaki makila ;


mpe eteni moko kati na biteni misato ya bikelamu oyo evandaka kati na ebale monene ekufaki, eteni moko kati na biteni misato ya bamasuwa nyonso ebebisamaki.


Boye ba-anjelu wana minei oyo babongisamaki mpo na ngonga wana, mokolo wana, sanza wana mpe mobu wana, bafungolamaki mpo ete baboma eteni moko kati na biteni misato ya bato.


Tala ndenge nini, kati na emoniseli na ngai, bampunda mpe basoda oyo babundaka na likolo na yango bazalaki : balataki bibende oyo basoda balataka mpo na kobatela tolo. Bibende yango ezalaki ya motane makasi lokola moto, ya langi ya bule ya pete mpe ya langi ya mosaka ; bongo mito ya bampunda ezalaki lokola mito ya bankosi, mpe minoko na yango ezalaki kobimisa moto, milinga mpe sofolo.


Nguya ya bampunda ezalaki kati na minoko mpe na mikila na yango, pamba te mikila na yango ezalaki lokola banyoka, mpe ezalaki na mito oyo, na nzela na yango, ezalaki kosala bato mabe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ