Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 9:15 - Mokanda na Bomoi

15 Boye ba-anjelu wana minei oyo babongisamaki mpo na ngonga wana, mokolo wana, sanza wana mpe mobu wana, bafungolamaki mpo ete baboma eteni moko kati na biteni misato ya bato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 9:15
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango mibu wana nkoto moko ekosila, bakobimisa Satana wuta na boloko na ye,


Anjelu ya misato abetaki kelelo ; mpe na mbala moko, monzoto moko ya monene oyo ezali kopela lokola mwinda monene ekweyelaki, longwa na likolo, eteni moko kati na biteni misato ya bibale mpe bitima ya mayi.


Anjelu ya liboso abetaki kelelo ; mpe, mbala moko, mvula ya mabanga mike elongo na moto esangana na makila ebwakamaki na mabele. Bongo biloko oyo ezikaki : eteni moko kati na biteni misato ya mabele, eteni moko kati na biteni misato ya banzete, mpe matiti nyonso ya mobesu.


Anjelu ya mibale abetaki kelelo ; mpe na mbala moko, eloko moko lokola ngomba monene oyo ezali kopela moto ebwakamaki na ebale monene. Eteni moko kati na biteni misato ya ebale monene ekomaki makila ;


mpe eteni moko kati na biteni misato ya bikelamu oyo evandaka kati na ebale monene ekufaki, eteni moko kati na biteni misato ya bamasuwa nyonso ebebisamaki.


Mikila na yango ezalaki na basonge lokola mikila ya bakoto, mpe nguya na yango ya konyokola bato basanza mitano ezalaki kati na mikila na yango.


Tala bapasi misato oyo ezalaki kobima na minoko ya bampunda : moto, milinga mpe sofolo. Ebomaki eteni moko kati na biteni misato ya bato.


Esengelaki konyokola bango basanza mitano, kasi esengelaki te koboma bango. Pasi oyo ezalaki kopesa ekokanaki na oyo moto ayokaka soki koto eswi ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ